Eteyelo oyo esalisaka biso tósalela makambo na ndenge ebongi
1 Ntango tokotalela makambo oyo ezali na Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya mobu 2006, tokosala makasi tózwa matomba na mateya yango oyo euti na Makomami, wana tozali koyokanisa yango na mosala na biso ya bosantu mpe na bomoi na biso. Tosengeli komityela mokano ya kosalela makambo oyo tozali koyekola.—Yoa. 13:17; Filp. 4:9.
2 Kopesa biyano: Na programɛ ya mbula oyo, babakisi miniti moko na eteni oyo bayangani bapesaka biyano, na lisolo ya Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Yango elingi koloba ete ndeko oyo azwi mokumba ya kosala lisolo ya makanisi ya ntina, asengeli kokeba ete asala yango na miniti mitano, na esika ya miniti motoba. Bayangani oyo bakopesa biyano na bisika oyo bafandi, basengeli mpe kokeba ete bázwa ntango mingi te. Soki moto oyo azali kopesa eyano akanisi malamu liboso, akoki kopesa likanisi oyo ekosalisa basusu kozanga ete alekisa segɔnde 30. Pene na bato zomi bakoki kopesa biyano ya malamu na boumeli ya miniti mitano oyo ebongisami mpo na bayangani.
3 Masolo oyo eteyaka: Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia mpe lisolo ya koteya lisangá esengeli mpenzampenza kolobela ndenge ya kosalela mateya yango na mosala na biso ya kosakola mpe na makambo mosusu ya bomoi na biso. Molobi asengeli kosuka kaka te na kolamwisa mposa ya bayoki ya kosalela makambo yango. Asengeli komonisa makambo mpenza oyo basengeli kosala, ndenge ya kosalela yango, mpe matomba oyo bakozwa soki basaleli yango. Akoki mbala mosusu koloba boye: “Talá ndenge vɛrsɛ oyo ezali kosalisa biso,” to “Talá ndenge tokoki kosalela bavɛrsɛ oyo na mosala ya kosakola.” Soki likoki ezali, bankulutu mpe basaleli na misala oyo bayebi malamu ndenge makambo elekaka na teritware na bango, basengeli kosala makasi bámonisa ndenge mpenza ya kosalela mateya yango na likambo boye to boye.
4 Soki tozali kotánga bandakisa oyo euti na Biblia, tokokoka mpenza komonisa ndenge malamu ya kosalela makambo oyo tozali kolobela. Nsima ya kolobela ndakisa moko oyo euti na Makomami, molobi akoki koloba boye: “Yo mpe okoki kokutana na likambo lokola oyo.” Molobi asengeli komindimisa ete liteya nyonso oyo akobimisa na ndakisa oyo azwi na Biblia, eyokani na likambo oyo mokapo wana mobimba ezali kolobela, eyokani na Biblia mobimba, mpe na makambo oyo ezali na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45.
5 Bwanya ezali likoki ya kosalela malamu boyebi mpe bososoli. ‘Bwanya ezali eloko ya liboso.’ (Mas. 4:7) Wana tozali kozwa bwanya oyo ebongi na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, tiká ete tókolisa makoki na biso ya kopesa yango na bato mosusu.