Tómonisa botɔndi na biso
Ekaniseli ekosalema mokolo ya 17 Aprili
1. Makanisi nini mokomi ya nzembo azalaki na yango, oyo ebongi ete biso mpe tózala na yango, mingimingi na eleko ya Ekaniseli?
1 Botɔndi oyo mokomi ya nzembo azalaki na yango mpo na makambo ebele oyo Yehova asalaki mpo na komonisela ye motema mawa mpe kobikisa ye etindaki ye amituna boye: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu na ye nyonso oyo asalelá ngai?” (Nz. 116:12) Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali kutu na bantina mingi koleka ya kopesa ye matɔndi. Bankama ya bambula nsima ya kokomama ya maloba wana, Nzambe apesaki bato likabo oyo eleki monene: lisiko. Lokola tozali komilɛngɛla mpo na kokanisa liwa ya Yesu na mokolo ya 17 Aprili, tozali na bantina mingi ya komonisa botɔndi.—Kol. 3:15.
2. Wapi mwa bantina oyo etindaka biso tózala na botɔndi mpo na lisiko?
2 Matomba oyo tozwi na nzela ya lisiko: Na nzela ya lisiko, tozali na likoki ya ‘kolimbisama masumu na biso.’ (Kol. 1:13, 14) Lisiko nde epesi biso nzela ya kosambela Yehova na lisɔsɔli ya pɛto. (Ebr. 9:13, 14) Esalisaka biso mpe tózala na elobeli ya polele mpe ya bosembo ntango tozali kopusana penepene na Yehova na libondeli. (Ebr. 4:14-16) Baoyo bamonisaka kondima na lisiko bazali na elikya kitoko ya kozwa bomoi ya seko!—Yoa. 3:16.
3. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai na Yehova mpo na lisiko?
3 Ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi na biso: Lolenge moko ya komonisa botɔndi mingi oyo tozali na yango ezali ya kotánga mikapo ya Biblia oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli mpe komanyola likoló na yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2011 ezali na lisolo moko oyo ezali na motó ya likambo: “Ozali komibongisa mpo na mokolo oyo eleki ntina na mbula?” Lisolo wana ebongisamaki mpo na kosalisa biso tósala bongo. Tokoki mpe koyebisa Yehova na nzela ya mabondeli oyo tosalaka na motema mobimba ete tozwaka lisiko na motuya mingi. (1 Tes. 5:17, 18) Koyangana na Ekaniseli mpo na kotosa etinda ya Yesu ekomonisa mpe ete tozali na botɔndi mingi. (1 Ko. 11:24, 25) Longola yango, tokoki komekola bolingo monene ya Yehova soki tobengisi bato ebele na Ekaniseli yango.—Yis. 55:1-3.
4. Ekateli na biso esengeli kozala nini?
4 Basaleli ya Yehova oyo bazali na botɔndi batalelaka Ekaniseli te lokola makita mosusu ya lisangá. Ekaniseli ezali likita oyo eleki ntina na makita nyonso ya mbula mobimba! Lokola Ekaniseli ekómi pene, tiká ete tózala na ekateli lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Ee molimo na ngai, pambolá Yehova, mpe kobosana te misala na ye nyonso.”—Nz. 103:2.