“Bókoba kosala boye”
Ekaniseli ekosalema mokolo ya 5 Aprili
1. Mpo na nini kokanisa liwa ya Yesu ezali na ntina mingi?
1 “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Na maloba wana, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ete bákanisaka mbeka ya liwa na ye. Mpo na makambo nyonso oyo lisiko ekokisaki, tomoni mpenza ete mokolo ya Ekaniseli oyo esalemaka mbula na mbula, ezali mokolo oyo eleki ntina mpe ya motuya mpo na bakristo. Lokola mwa 5 Aprili, mokolo oyo Ekaniseli ya mbula oyo ekosalema ekómi pene, ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova?—Kol. 3:15.
2. Makambo nini tokoki koyekola mpe komanyola mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na Ekaniseli?
2 Tómibongisa: Mbala mingi tomibongisaka mpo na makambo oyo tomonaka ete ezali na ntina mingi. Tokoki kobongisa mitema na biso mpo na Ekaniseli soki totaleli na libota makambo oyo esalemaki na mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele, mpe tomanyoli likoló na yango. (Ezr. 7:10) Bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli makambo yango ezali na Calendrier na biso mpe na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo; mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2011, nkasa 23 mpe 24 okokuta liste mobimba ya bavɛrsɛ yango mpe mikapo ya buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo oyo eyokani na bavɛrsɛ yango.
3. Tokoki kosala nini mpo tósakola lisusu mingi mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na Ekaniseli?
3 Tósakola: Tokoki mpe komonisa botɔndi na biso soki tosakoli mingi. (Luka 6:45) Tokokabola nkasa ya libyangi na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na Ekaniseli kobanda mokolo ya pɔsɔ mwa 17 Marsi. Okoki kobongisa programɛ na yo mpo osakola lisusu mingi, mbala mosusu osala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Mpo na nini te kosolola yango ntango bokosala Losambo na kati ya libota?
4. Matomba nini tokoki kozwa soki toyangani na Ekaniseli?
4 Tozwaka mpenza matomba mingi ntango toyanganaka na Ekaniseli mbula na mbula! Esengo mpe bolingo na biso mpo na Nzambe ebakisamaka ntango tokanisaka ndenge oyo Nzambe apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki lokola lisiko. (Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:9, 10) Yango etindaka biso tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te. (2 Ko. 5:14, 15) Elendisaka mpe biso tósanzola Yehova liboso ya bato nyonso. (Nz. 102:19-21) Ya solo, lokola biso basaleli ya Yehova tozalaka bato ya botɔndi, tozali kozela na esengo mpenza libaku oyo tokozala na yango ya ‘kosakola liwa ya Nkolo’ na mokolo ya Ekaniseli oyo ekosalema mwa 5 Aprili.—1 Ko. 11:26.