Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/06 lok. 5
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 3/06 lok. 5

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na Ekaniseli

Na mbula oyo, Ekaniseli ekosalema mokolo ya misato 12 Aprili. Bankulutu basengeli kotalela malamumalamu makambo oyo elandi:

◼ Ntango bozali kobongisa ngonga oyo molulu yango ekobanda, bóbosana te ete limpa ná vinyo esengeli koleka te liboso moi elala.

◼ Bato nyonso, bakisa mpe ndeko oyo akosala lisukulu, basengeli koyeba malamu ngonga oyo molulu yango ekobanda mpe esika oyo yango ekosalema.

◼ Limpa mpe vinyo oyo ekosalelama esengeli kozala oyo ebongi mpe esengeli kobongisama liboso.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2003 na nkasa 14-15.

◼ Basaani, bakɔpɔ, mesa ya malamu mpe elamba ya mesa, esengeli kobongisama malamu mpe kotyama libela na esika oyo Ekaniseli ekosalema.

◼ Ndako ya Bokonzi to esika mosusu oyo molulu yango ekosalema esengeli kopɛtolama malamu liboso.

◼ Bosengeli kopona liboso mpenza bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakotambwisa limpa ná vinyo mpe koyebisa bango mokumba na bango mpe lolenge ya kokokisa yango malamu; bosengeli mpe koyebisa bango bálata malamu mpe bákata nsuki malamu.

◼ Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa ná vinyo epai ya ndeko nyonso mopakolami oyo azali na bokɔnɔ, mpe azali na makoki ya koyangana te.

◼ Soki masangá mingi ekosalela Ndako ya Bokonzi moko, basengeli koyokana malamu mpo na kosala ete bato bátondana te na porte, na balabala, mpe na bisika ya kotɛlɛmisa mituka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto