Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/06 lok. 8
  • Okoki kobongola programɛ na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kobongola programɛ na yo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Okoki kosakola na mpokwa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Osilá komeka kosakola na mpokwa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tóluka baoyo babongi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Salelá malamu mpenza ntango na yo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 4/06 lok. 8

Okoki kobongola programɛ na yo?

1. Mpo na nini tosengeli kobongola programɛ na biso ya kosakola?

1 Lokola tozali baklisto ya solo, tondimi etinda ya kozala “baluki-bato.” (Mat. 4:19) Lokola baluki-mbisi, tokozwa matomba mingi na mosala ya koluka bato soki tozali na programɛ ya kosakola ntango bato mingi bazalaka na ndako. Na bamboka mingi, na basanza oyo ezali koya, moi ekobanda kolala noki te. Bato mingi bazalaka na ndako nsima ya midi mpe na mpokwa. Mbala mingi, bato bazalaka na motema ya kokita na bangonga wana mpe basepelaka mingi koyamba bapaya. Okoki kobongola programɛ na yo mpo na kosakola na bangonga wana?​—1 Kol. 9:23.

2. Tángá bantango oyo tokoki koyebisa bato mingi nsango malamu.

2 Kopesa litatoli na mpokwa: Soki tosali programɛ ya kosakola na bampokwa, yango ekoki kosalisa biso tóyebisa bato mingi nsango malamu. (Mas. 21:5) Bilenge bakoki kosakola nsima ya kouta kelasi. Basusu bakoki kosakola soki bauti mosala. Bituluku mosusu ya boyekoli ya mokanda bakoki kobongisa mpo na kosakola ngonga moko liboso ya kobanda boyekoli ya mokanda.

3. Wapi balolenge ya kosakola oyo okoki kosalela na teritware na bino nsima ya midi mpe na mpokwa?

3 Kosakola ndako na ndako nsima ya midi to na mpokwa ekoki kopesa biso nzela ya kosolola na bato oyo mbala mingi bazalaka na bandako na bango te. Na bamboka mingi, basakoli bakoki mpe kopesa litatoli ya balabala to lolenge mosusu ya litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi, na mpokwa. Mpe basakoli mingi bamonaka ete kosakola na mpokwa ezali ntango ya malamu koleka mpo na kozongela bato mpe kobanda koyekola na bango Biblia.

4. Mpo na nini ezali na ntina tózalaka na bososoli mpe tómityaka na esika ya basusu ntango tozali kopesa litatoli na mpokwa?

4 Esengeli kozala na bososoli: Tosengeli kozala na bososoli ntango tozali kopesa litatoli na mpokwa. Mbala mingi, ezalaka malamu kosakola kaka na bangonga ya ebandeli ya mpokwa, na esika ya kokende kotala bato na butu ntango balingi kolala. (Filp. 4:5) Soki obɛti na porte moko, tɛlɛmá esika oyo bakoki komona yo, mpe yebisá bango polele soki ozali nani. Yebisá bango mbala moko ntina oyo okei kotala bango. Soki okei na ntango oyo ebongi te, na ndakisa ntango libota bazali kolya, yebisá bango ete okozongela bango na ntango mosusu. Luká ntango nyonso komitya na esika ya basusu.​—Mat. 7:12.

5. Ndenge nini tokoki kokima makambo oyo ekoki komemela biso makama ntango tozali kosakola?

5 Tosengeli mpe kokeba na makambo oyo ekoki komemela biso makama. Soki ozali kosakola ntango molili ekɔti, ezali malamu kotambola elongo na moto mosusu to na bato mingi. Leká kaka na babalabala oyo ezali na miinda epai bato mingi bazali koleka. Pesá litatoli kaka na bisika oyo omoni ete ezali na likama te. Koleka te na bisika oyo omoni ete bakoki kosala yo mabe na molili.​—Mas. 22:3.

6. Matomba nini mosusu tokoki kozwa soki tozali kosakola nsima ya midi mpe na mpokwa?

6 Kopesa litatoli nsima ya midi mpe na mpokwa ekoki kopesa biso nzela ya kosakola elongo na bandeko oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. (Lom. 1:12) Okoki kobongola programɛ na yo mpo na kosangana na lolenge oyo ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto