Okoki kosakola na mpokwa?
1. Ndenge buku moko emonisi yango, ntango nini ntoma Paulo azalaki kosakola ndako na ndako?
1 Buku moko (Daily Life in Bible Times), emonisi ete ntoma Paulo azalaki kosakola ndako na ndako “kobanda na ngonga ya minei ya mpokwa tii na butu mpenza.” Toyebi te soki yango ezalaki manaka na ye ya mokolo na mokolo; kasi oyo toyebi ezali ete Paulo azalaki kondima “kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu.” (1 Ko. 9:19-23) Yango ekokaki kosangisa makambo lokola komibongisa mpo na kokende kosakola ndako na ndako soki amoni ete kuna akokutana na bato mingi.
2. Mpo na nini ebongi kosakola na mpokwa?
2 Na bisika mingi, basakoli bamesaná kokende mosala ya ndako na ndako na ntɔngɔ na kati ya pɔsɔ. Kasi, yango ezali mpe ngonga oyo ebongi mpenza epai na bino? Mobongisi-nzela moko alobi boye mpo na teritware na ye: “Na moi bato mingi bazalaka te na ndako, kasi nde na mpokwa.” Kopesa litatoli na mpokwa ekoki kopesa libaku malamu ya koyebisa nsango malamu mingimingi epai ya mibali. Mbala mingi, ezalaka ntango oyo bato bapemaka mpe balingaka kosolola. Bankulutu bakoki kobongisa makita mpo na mosala ya kosakola na mpokwa soki bamoni ete ekobimisa matomba.
3. Ndenge nini tokoki komonisa bososoli ntango tozali kosakola na mpokwa?
3 Salelá bososoli: Ntango tozali kosakola na mpokwa tosengeli kosalela bososoli. Soki tomoni ete ngonga oyo toyei epai ya moto ebongi te, na ndakisa mpo azali kolya, tóyebisa ye ete tokozongela ye na ngonga mosusu. Soki molili ezali, tɛlɛmá esika oyo moto yango akoki komona yo, mpe yebisá mbala moko soki ozali nani mpe ntina oyo oyei kotala ye. Ezali mpe likambo ya bwanya kosakola mibalemibale to na etuluku. Ntango basakoli mibale bazali kosolola na moto, bandeko mosusu bázala mosika te. Kosakola mpe te na babalabala ya molili epai bato bazali koleka mingi te. Kokende te kotala bato na butu makasi wana bazali komilɛngɛla mpo na kolala, mpo otungisa bango te. (2 Ko. 6:3) Soki esika moko ezalaka likama na butu, ekozala malamu kosakola kuna na ebandeli ya mpokwa.—Mas. 22:3.
4. Kosakola na mpokwa epesaka matomba nini?
4 Matomba oyo okozwa: Mosala ya kosakola ezalaka elɛngi soki tokutani na bato ya kosolola na bango. Mpe ntango tozali kosolola na bato mingi, tozali mpe kozwa mabaku mingi ya kosalisa bango “bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Na yango, okoki kobongisa programɛ na yo mpo yo mpe osakolaka na mpokwa?