Salisá moyekoli asepela na bizaleli ya Yehova oyo eleki nyonso
1 Na mosala na biso ya kosakola, tosukaka kaka te na koteya bato mateya ya ebandeli ya Biblia. Kasi, tosalisaka mpe bango báyeba ete Yehova azali moto ya solo mpe básepela na bizaleli na ye oyo eleki nyonso. Ntango bato ya mitema sembo bayekolaka mateya ya solo oyo etali Nzambe, yango esimbaka mpenza mitema na bango mpe etindaka bango bábongola bomoi na bango mpo ‘bátambola na ndenge ebongi na Yehova mpo básepelisa ye mpenza.’—Kols. 1:9, 10; 3:9, 10.
2 Buku ya sika mpo na koyekola na bato Biblia: Banda na mokapo na yango ya liboso mpenza, buku Biblia eteyaka ezali kobenda likebi na biso na bizaleli ya Yehova. Mokapo ya liboso epesi biyano na mituna oyo: Nzambe atyelaka yo mpenza likebi?, Azalaka ndenge nini?, mpe Okoki kopusana penepene na ye? Mokapo yango emonisi mpe polele ete Yehova azali mosantu (par. 10), azali na bosembo mpe na motema mawa (par. 11), azali bolingo (par. 13), azali na nguya (par. 16), na mawa, na ngɔlu, alimbisaka mabe, azali motema molai, mpe sembo (par. 19). Na nsuka, paragrafe 20 elobi boye: “Soki ozali koyekola makambo ebele oyo etali Yehova, okomona ete azali mpenza moto ya solo; mpe yango ekotinda yo olinga ye lisusu koleka mpe omona ete ozali mpenza penepene na ye.”
3 Ndenge nini tokoki kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bápusana penepene na Yehova? Nsima ya kotalela paragrafe moko oyo elobeli ezaleli moko ya Nzambe, tokoki kotuna moyekoli boye: “Likambo oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?” to, “Ndenge nini likambo oyo emonisi ete Nzambe atyelaka yo mpenza likebi?” Ntango tozali koyekola na moto Biblia, soki na bantango mosusu tozali kotuna ye mituna ya ndenge wana, tozali koteya ye amanyola makambo oyo azali koyekola mpe asepela na bizaleli ya Yehova oyo eleki nyonso.
4 Salelá etanda ya bozongeli: Na nsuka ya mokapo mokomoko, sɛngá moyekoli alimbola na maloba na ye moko, likanisi mokomoko oyo ezali na etanda “Oyo Biblia eteyaka.” Bendá likebi na ye na bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na buku te. Mpo na kosalisa moyekoli abimisa makanisi oyo azali na yango na motema, okoki kotuna ye boye: “Okanisi nini na oyo Biblia eteyi na likambo oyo?” Soki osali bongo, okosalisa moyekoli asimba makanisi ya ntina ya mokapo yango, mpe okoyeba malamu mateya oyo andimaka. Yango ekosalisa ye akóma na boyokani ya malamu na Yehova.