Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuli
“Okanisi ete mokolo mosusu ekozala na bokonzi moko oyo ekosilisa bampasi ya bato? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela mpo na bokonzi yango na maloba oyo ezali na Matai 6:9, 10. [Tángá.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo Bokonzi ya Nzambe eleki bikonzi ya bato. Elobeli mpe mapamboli oyo Bokonzi yango ekomemela bato.”
Lamuká! Yuli
Soki okutani na elenge, okoki koloba boye: “Bilenge mingi ya mbula na yo bakanisaka kobala. Okanisi ete epai wapi okoki kozwa toli ya malamu na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo emonisi moto oyo abandisaki libala. [Tángá Matai 19:6.] Zulunalo oyo elobeli ndambo ya mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózala na libala ya esengo.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aug.
“Lelo oyo, bato mingi bazali konyokola basusu. Okanisi ete makambo elingaki kozala ndenge mosusu soki bato básalelaka maloba oyo ya Yesu? [Tángá Matai 7:12. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi ndenge moto na moto akozwa limemya oyo ebongi.”
Lamuká! Aug.
“Biso nyonso tolingaka kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Oyebi ete minganga mingi bazali lisusu kosepela mpenza te kozongisa bato makila? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elimboli ntina ya likambo yango. Elimboli mpe, na lisalisi ya Biblia, ntina oyo Nzambe amonaka ete makila ezali na motuya mingi.” Tángá Levitike 17:11.