“Landá Klisto!” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2007
1, 2. (a) Ndenge nini Moize alendisaki Bayisalaele báyanganaka, mpe mpo na ntina nini? b) Na makambo nini tosengeli kobanda komilɛngɛla banda sikoyo?
1 Moize apesaki Bayisalaele mpe bapaya nyonso oyo bazalaki kofanda na mboka na bango malako ete báyanganaka esika moko nsima ya mbula nsambo mpo bátangelaka bango Mibeko. Mpo na mokano nini? Mpo “báyoka mpe báyekola.” (Det. 31:10-12) Yehova amonaki ete koyanganisa ebele ya basaleli na ye esika moko ezali na ntina. Yango wana, mosika te, basaleli ya Yehova bakoyangana lisusu mpo na liyangani ya etúká ya mikolo misato, oyo ezali na motó ya likambo “Landá Klisto!”
2 Osili kobanda komilɛngɛla? Ekosengela na yo osɛnga patrɔ na yo konje? Okoki kosalisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia to bandeko na yo oyo bazali Batatoli te mpo báyangana elongo na yo na liyangani yango? Ezali na bandeko mosusu ya lisangá oyo tosengeli kosalisa bango mpo báyangana? Okani kokende na liyangani mosusu oyo lisangá na bino ekokende te? Okozala na mposa bápesa yo esika ya kolala? Lisolo oyo ekosalisa yo omibongisa.
3. (a) Ndenge nini Yisaya 25:6 ezali kokokisama lelo oyo? (b) Likambo nini esili komonana na mokolo ya mitano na liyangani, kasi mokomoko na biso asengeli kosala nini?
3 Zalá na liyangani mikolo nyonso misato: Yehova azali kopesa basaleli na ye ebele ya bilei ya elimo. (Yis. 25:6) Yango esangisi mpe bilei ya elimo oyo tozwaka na mayangani oyo tosalaka mbula na mbula. Kasi, esili komonana ete mokolo ya mitano bato bazalaka mingi te na liyangani lokola mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Mityelá mokano ya kozala mikolo nyonso misato ya liyangani oyo ebongiseli ya Yehova ebongisi mpo na kopesa biso makasi! Soki ekosengela na yo kosɛnga konje na mosala, bondelá Yehova mpo na yango. Na nsima, ntango bapesi dati ya liyangani, ‘zwá mpiko’ mpe kende nokinoki kosolola na patrɔ na yo. (1 Tes. 2:2; Neh. 2:4, 5 ) Ekoki kozala malamu oyebisa ye ete liyangani yango, oyo esalemaka mbula na mbula, ezali moko ya makambo ya ntina na losambo na yo. Soki osali bongo mikolo mingi liboso ete dati ya liyangani ekoka, yango ekoki kosalisa ye azwa bibongiseli mosusu mpo na kopesa yo nzela.
4. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia mpe bandeko na biso oyo bazali Batatoli te mpo báya na liyangani?
4 Ndenge ya kosalisa bayekoli ya Biblia mpe libota na yo: Ekozala esengo mpenza soki bato oyo oyekolaka na bango Biblia bayei kolanda liyangani elongo na yo, mpe bamoni bango moko bolingo oyo ezalaka kati na biso baklisto “kati na koyangana monene.” (Nz. 22:25) Yebisá bango malamu mikolo mingi liboso mpo bázwa ntango ya komibongisa mpo báyangana. Yebisá bango makambo oyo etindaka yo osepela mingi kozala na mayangani. Mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ndenge liyangani ekozala, okoki kolakisa bango bakasɛti-video oyo ezali na bilili ya mayangani oyo eleká, mingimingi kasɛti-video Unis grâce à l’enseignement divin. Yebisá mpe bandeko na yo oyo bazali Batatoli te. Mbala mosusu, bakoki komibongisa mpo na koya kotala drame to mpo na kozala na liyangani elongo na yo ata mokolo moko.
5. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya kokaba oyo balobeli na 1 Timote 6:18?
5 Ndenge ya kosalisa bandeko ya lisangá: Ntoma Paulo alendisaki baklisto oyo bazalaki na bozwi ete “básala makambo ya malamu, bázala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba.” (1 Tim. 6:17, 18) Tokoki komonisa ezaleli ya kokaba oyo Paulo alendisaki, soki tozali kokanisa mibange, bibɔsɔnɔ, bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso, baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, ata mpe bandeko mosusu ya lisangá oyo bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpo bákende na liyangani. Kokokisa bamposa ya bato wana ezali libosoliboso mokumba ya bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli; kasi bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá bakoki kosalela bososoli mpe kosalisa na boboto mpenza baoyo bazali na mposa ya lisalisi.—Gal. 6:10; 1 Tim. 5:4.
6. Mpo na nini tosengeli kokende na liyangani oyo lisangá na biso ekokende?
6 Kokende na liyangani mosusu: Mpo basakoli nyonso bázwa bisika ya kofanda, mikanda, bisika ya kolala, mpe bongo na bongo, tolendisi yo okende na liyangani ya etúká oyo lisangá na bino ekokende. Nzokande, soki likambo moko epekisi yo kokende na liyangani oyo lisangá na bino ekokende, kokakatana te mpo na kokende na liyangani mosusu.
7-9. (a) Makambo nini ya ntina tosengeli kobosana te soki tolingi bálukela biso esika ya kolala, mpe mpo na nini? (b) Bibongiseli nini esengeli kozwa ntango bandeko basi mpe bandeko mibali basengeli kolala na Ndako ya Bokonzi? (c) Bibongiseli nini tosengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká? (Talá etanda na lokasa 4.)
7 Bisika ya kolala: Mbala mingi, na engumba oyo liyangani esalemaka, bapaya balalaka na bandako ya bato (bandako ya bandeko), na Bandako ya Bokonzi to epai ya bandeko na bango ya libota. Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya liste ya bisika nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema na etanda ya mayebisi ya lisangá. Mokomoko na biso asengeli kotalela malamumalamu mpe kobondela liboso ya kopona liyangani ya etúká oyo akokende na mobu 2007.
8 Soki olingi bálukela yo esika ya kolala na ndako ya moto (ya ndeko moko), to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso oyo bakozala na mposa ya esika ya kolala mpe atinda yango na Departema ya boyambi bapaya, na engumba oyo liyangani ekosalema. Na liste yango, akokoma nkombo ya mosakoli, akomonisa soki azali mwasi to mobali (Mw. to Mob.), mbula na ye, mpe akomonisa baoyo bazali libota moko. Yango ekosalisa bandeko ya Departema ya boyambi bapaya ete bázwa ntango ya koluka bisika ya kolala mpo na bato wana nyonso. Liboso ya kotinda bankombo ya basakoli na Departema ya boyambi bapaya, Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotala soki basakoli yango bakokisi masɛngami. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu kokende kofanda epai ya ndeko mosusu to moninga mosusu. Yango ekopesa mokakatano na bandeko ya Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te, asengeli te koyebisa mokomeli ya lisangá ete atinda nkombo na ye na Departema ya boyambi bapaya.
9 Tolingi kopesa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko mpo asalisaka ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale; eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike mpe bilenge basi, mpe eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe bilenge mibali. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka mpo na kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala, moto na moto na ngala na ye, mpo na kokɛngɛla biloko ya bandeko ete báyiba yango te. Esengeli kopona bandeko oyo babongi kotyelama motema, baoyo bakɔmeli na elimo, mpo na kokɛngɛla. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Bakoki kobongisa mwa esika ya kolamba na libándá kaka mpo na eleko ya liyangani. Soki liyangani esili, basengeli kolongola yango. Esengeli ete Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ebongisama malamu, ezala na kati to na libándá. Esengeli kokeba ete ata eloko moko ebeba te. Bandeko basengeli kosala nyonso mpo na komonisa bizaleli ya boklisto, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.—1 Kol. 10:31.
10, 11. (a) Liboso tókóma na esika ya liyangani, wapi makambo oyo bandeko mosusu basalaka mpo na bolamu na biso? (b) Ndenge nini tokomonisa botɔndi na biso mpo na misala nyonso oyo bandeko basali mpo na bolamu na biso? (Tángá Baebele 13:17.)
10 Tótosa bibongiseli oyo ezwami: Ntango tokómaka na esika ya liyangani, tomonaka ete bandeko basalaki mosala mingi mpo na kobongisa makambo nyonso. Bandeko ya bolingo oyo bayambaka bato bapesaka biso mbote, bapesaka biso lokasa ya programɛ mpe balakisaka biso esika ya kofanda. Liboso tóya, bandeko mosusu basalaka mosala ya kotya bopɛto na esika ya liyangani mpe kobongisa estrade malamu. Longola yango, misala mosusu ya ntina mingi esalemaka atako biso tomonaka yango te: kobongisa masolo, kopesa bandeko bisika ya kolala mpe kotya ebele ya makambo mosusu ya mikemike na molɔngɔ.
11 Mpo liyangani moko esalema, bandeko mingi basalaka na boumeli ya basanza mingi mpo na kozwa bibongiseli oyo esengeli, mpe mabota na bango basungaka bango na ndenge batikelaka bango ntango ya kotalela makambo nyonso wana ya ntina. Na ntembe te, tosepelaka na milende nyonso wana oyo esalemaka mpo na bolamu na biso, boye te? Tokomonisa botɔndi soki tozali kotosa malako oyo epesami na lisolo oyo mpe malako mosusu oyo bakoki kopesa biso liboso ya liyangani. (Ebe. 13:17) Soki mokomoko na biso andimi kotosa yango, makambo nyonso ‘ekosalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.’—1 Kol. 14:40.
12. (a) Mpo na nini mayangani ya Batatoli ya Yehova ezali na ntina mingi lelo oyo? (b) Mokomoko na biso asengeli kosala nini banda sikoyo?
12 Lokola tozali “komona mokolo yango ezali kokóma pene,” mayangani na biso basaleli ya Nzambe ezali na ntina mingi koleka. (Ebe. 10:25) Na mayangani yango, moombo ya sembo mpe ya mayele ateyaka biso mpo na kosalisa biso ‘tósɛnzɛla ete tótosa maloba nyonso’ oyo Yehova alingi ete tótosa. (Det. 31:12) Bandá komibongisa uta sikoyo mpo na koyangana na mikolo nyonso misato ya liyangani ya etúká “Landá Klisto!” Soki osali bongo, okozala na libaku ya koyoka mateya nyonso oyo ebongisami mpe kozala elongo na baninga ya malamu mpenza!
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:20 na ntɔngɔ - 5:05 nsima ya midi
Mwalomingo
9:20 na ntɔngɔ - 4:10 nsima ya midi
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká
1. Soki okosala mobembo molai mpo na kokende na liyangani, bandá kobomba mbongo ya tike mpo na yo moko mpe libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
3. Na boumeli ya liyangani, tokokumisa Yehova na etamboli ya malamu mpe na molato ya pɛto mpe oyo ebongisami malamu.—1 Kol. 10:31.
4. Zwá ekateli ya kotosa malako ya bandeko oyo bayambaka bato mpe ya bandeko mosusu oyo bazwi mokumba ya kosala ete mobulu ezala te. Kokanga bisika ya kofanda te; okoki kokanga bisika kaka mpo na libota na yo to bandeko oyo osali na bango mobembo elongo.
5. Na ntango ya bopemi, lyá bilei ya pɛpɛlɛ, mpo olanda malamu programɛ ya nsima ya midi. Bilei ya kilo ekoki kopesa yo mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya mokolo mokomoko ya liyangani, moto nyonso akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká bapapye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.