Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 nk. 3-5
  • Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2008

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2008
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2009
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • “Liloba ya esakweli ya Nzambe” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na 1999
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • “Landá Klisto!” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2007
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • “Bateyi ya Liloba ya Nzambe”: Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2001
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 nk. 3-5

Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2008

1. (a) Mpo na nini toli oyo Paulo apesaki baklisto Baebele ebongi mpenza na mikolo na biso? (Tángá Baebele 10:24, 25.) (b) Libaku nini tokozwa ya kosalela toli wana ya Paulo?

1 Ntoma Paulo alendisaki baklisto Baebele báyanganaka elongo mpe bálendisanaka “na koleka mpenza” lokola bazalaki komona ete nsuka ekómi pene. (Ebe. 10:24, 25) Makambo mingi emonisi ete “mokolo” oyo Paulo alobelaki ekómi mpenza pene! Yango wana, tozalaka na mposa makasi ya koyangana elongo na bandeko na biso baklisto mpo na kozwa mateya ya elimo oyo ekosalisa biso tómitambwisa malamu na “mikolo ya nsuka” oyo ya mabe. (2 Tim. 3:1) Mayangani ya etúká ya mobu 2008 ekopesa biso libaku yango.

2. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na liyangani mikolo nyonso misato? (b) Tosengeli kosala nini mpo tóbanda komibongisa mpo na kozala na liyangani?

2 Zalá na liyangani mikolo nyonso misato: Tolendisi yo ozala na liyangani mikolo nyonso misato. Tokozwa mateya wana ya elimo soki ‘totiki te koyangana na biso mpenza.’ (Ebe. 10:25) Bandá komibongisa libelalibela. Ekozala malamu osolola na patrɔ na yo mikolo mingi liboso mpo azwa bibongiseli oyo esengeli. Soki bana na yo bakozala na kelasi na ntango wana, sololá likambo yango na balakisi na bango. Monisá bango ete liyangani ezali moko ya makambo ya ntina mingi na losambo na biso mpe tosalaka yango mbula nyonso. Okoki kozala na elikya ete Yehova akopambola milende oyo okosala mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso.​—Mat. 6:33.

3. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka basusu likebi?

3 Salisá basusu bázala na liyangani: Paulo alendisaki mpe baklisto ‘bátyelanaka likebi.’ (Ebe. 10:24) Na etuluku na bino ya Boyekoli ya Mokanda, ezali nde na bandeko oyo bazali na mposa ya lisalisi mpo bázala na liyangani? Okoki kosalisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia bázala na liyangani ata mokolo moko? Ntango ozali koyebisa bandeko na yo oyo bazali Batatoli te makambo etali liyangani, bengisá mpe bango báyangana elongo na yo. Ntango mosusu, milende oyo okosala na bolingo nyonso ekobota mbuma koleka oyo okoki kokanisa.

4. Mpo na nini tosengeli kokende na liyangani oyo lisangá na biso ekokende?

4 Kende na liyangani oyo lisangá na bino ekokende: Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya liste ya bisika nyonso oyo mayangani ya etúká ekosalema, na etanda ya mayebisi. Tosɛngi moto na moto abondela liboso ya kopona liyangani oyo akokende na mobu 2008. Mpo basakoli nyonso bázwa bisika ya kofanda, mikanda, bisika ya kolala, mpe bongo na bongo, tolendisi yo okende na liyangani ya etúká oyo lisangá na bino ekokende. Nzokande, soki likambo moko epekisi yo okende na liyangani oyo lisangá na bino ekokende, kokakatana te mpo na kokende na liyangani mosusu.

5. Makambo nini ya ntina tosengeli kobosana te soki tolingi bálukela biso esika ya kolala, mpe mpo na nini?

5 Bisika ya kolala: Soki olingi bálukela yo esika ya kolala na ndako ya moto (ya ndeko moko), to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso oyo bakozala na mposa ya esika ya kolala mpe atinda yango na Departema ya boyambi bapaya, na engumba oyo liyangani ekosalema. Na liste yango, akokoma nkombo ya mosakoli, akomonisa soki azali mwasi to mobali (Mw. to Mob.), mbula na ye, mpe akomonisa baoyo bazali libota moko. Yango ekosalisa bandeko ya Departema ya boyambi bapaya ete bázwa ntango ya koluka bisika ya kolala mpo na bato wana nyonso. Liboso ya kotinda bankombo ya basakoli na Departema ya boyambi bapaya, Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotala soki basakoli yango bakokisi masɛngami. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu kokende kofanda epai ya ndeko mosusu to moninga mosusu. Yango ekopesa mokakatano na bandeko ya Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te, asengeli te koyebisa mokomeli ya lisangá ete atinda nkombo na ye.

6. (a) Bibongiseli nini esengeli kozwa ntango bandeko basi mpe bandeko mibali basengeli kolala na Ndako ya Bokonzi? (b) Bibongiseli nini tosengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká? (Talá etanda “Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa . . .”)

6 Tolingi kopesa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko mpo asalisaka ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale; eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike mpe bilenge basi, mpe eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe bilenge mibali. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka mpo na kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala, moto na moto na ngala na ye, mpo na kokɛngɛla biloko ya bandeko ete báyiba yango te. Esengeli kopona bandeko oyo babongi kotyelama motema, baoyo bakɔmeli na elimo, mpo na kokɛngɛla. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Bakoki kobongisa mwa esika ya kolamba na libándá kaka mpo na eleko ya liyangani. Soki liyangani esili, basengeli kolongola yango. Esengeli ete Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ebongisama malamu, ezala na kati to na libándá. Esengeli kokeba ete ata eloko moko ebeba te. Bandeko basengeli kosala nyonso mpo na komonisa bizaleli ya boklisto, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.​—1 Kol. 10:31.

7. (a) Ndenge nini tokoki kopesa Yehova nkembo na liyangani? (b) Makambo nini moto moko mpe mokambi moko ya otɛlɛ balobaki ntango bamonaki misala ya malamu mpe etamboli malamu ya bandeko na biso?

7 Misala ya malamu: Kotosa etinda ya Yehova ya koyangana elongo mpo na kosambela ye, epesaka biso ‘litomba.’ Oyo eleki ntina, mayangani ya etúká epesaka biso libaku ya kokumisa nkombo ya Yehova. (Yis. 48:17) Na mayangani ya etúká, “misala [na biso] ya malamu mingi emonanaka polelepolele” epai ya bato ebele, mpe yango etindaka bato mosusu bámonisa makanisi na bango. (1 Tim. 5:25) Ntango moto moko amonaki bandeko bazali kobongisa esika ya liyangani alobaki boye: “Liboso, ntango nazalaki komona bafɔtɔ ya paladiso na mikanda na bino, nazalaki koloba ete Batatoli ‘balɔtaka mpenza.’ Kasi sikoyo namoni ete bakoki kokómisa mabelé paladiso!” Na nsima, apesaki maboke mibale ya bafololo mpe alobaki boye: “Bózwa yango, ezali likabo na ngai mpo na mosala oyo.” Na engumba moko oyo liyangani esalemaka banda bambula mingi, mokambi moko ya otɛlɛ alobaki boye: “Na engumba na biso, bato balobaka makambo ndenge na ndenge mpo na Batatoli ya Yehova mpe matomba oyo tozwaka na mayangani na bino. Toyebi ete bandimi na bino basukolaka ndako ya masano ya engumba na biso mpe tomonaka ndenge botyaka bopɛto na esika ya kotɛlɛmisa mituka. Tosepelaka mingi kolekisa ntango elongo na bato na bino na eleko ya molunge. Tokanisi ete ekozala mpe bongo na bambula ekoya.” Na ntembe te, makambo ya ndenge wana oyo bato balobaka mpo na etamboli malamu ya bandeko na biso esepelisaka Yehova, Nzambe na biso!

8. Ndenge nini Matai 4:4 emonisi ntina ya kolanda liyangani mobimba na likebi?

8 Yesu alobaki ete bomoi na biso etali ndenge oyo toyokaka “liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4) Na mayangani na biso ya mbula na mbula, Yehova apesaka biso ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi,’ na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Bandeko basalaka mosala monene mpo na kobongisa mpe kopesa biso bilei yango ya elimo. Tiká ete tókende na liyangani yango mpe tólanda yango mobimba mpo na komonisa botɔndi epai ya Yehova na ndenge azali kosalisa biso na bolingo mpenza.

[Etanda na lokasa 3]

Manaka

Mwamitano mpe Mwapɔsɔ

9:20 na ntɔngɔ - 4:55 nsima ya midi

Mwalomingo

9:20 na ntɔngɔ - 4:00 nsima ya midi

[Etanda na lokasa 4]

Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na koyangana na liyangani ya etúká

◼ Soki okosala mobembo molai mpo na kokende na liyangani, bandá kobomba mbongo ya tike mpo na yo moko mpe libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.

◼ Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.’​—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.

◼ Na boumeli ya liyangani, tokokumisa Yehova na etamboli ya malamu mpe na molato ya pɛto mpe oyo ebongisami malamu.​—1 Kol. 10:31.

◼ Zwá ekateli ya kotosa malako ya bandeko oyo bayambaka bato mpe ya bandeko mosusu oyo bazwi mokumba ya kosala ete mobulu ezala te. Kokanga bisika ya kofanda te; okoki kokanga bisika kaka mpo na libota na yo to bandeko oyo osali na bango mobembo elongo.

◼ Na ntango ya bopemi, lyá bilei ya pɛpɛlɛ, mpo olanda malamu programɛ ya nsima ya midi. Bilei ya kilo ekoki kopesa yo mpɔngi.​—Luka 8:18.

◼ Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya mokolo mokomoko ya liyangani, moto nyonso akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká bapapye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ.​—1 Pet. 1:15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto