Oyebi mayele nini okopona?
Na mokili mobimba, balopitalo oyo ezali kosala bato lipaso kozanga kozongisa bango makila ezali se kokóma mingi. Oyebi malamu mayele to nkisi mosusu oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisa makila? Osengeli koyeba mayele mpe nkisi yango mpo ozwa bikateli oyo ebongi soki esengeli básalisa yo to básala yo lipaso. Talá video Pas de sang: la médecine relève le défi. Na nsima, mpo na koyeba soki okangi makambo yango, yanolá na mituna oyo elandi.—Liyebisi: Lokola video yango ezali kolakisa na bisika mosusu ndenge oyo bazali kosala bato lipaso, baboti basengeli kokeba ete bana ya mike bátala bisika yango te.
(1) Wapi ntina ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila? (2) Na likambo ya kosalisa nzoto, Batatoli ya Yehova balingaka nini? (3) Lotomo nini bato ya maladi bazali na yango? (4) Mpo na nini kopona mayele to nkisi mosusu na esika ya kozongisa makila ezali likambo ya mayele mpe ezali mabe te? (5) Soki makila ebimi mingi, wapi makambo mibale ya ntina oyo minganga basengeli kosala nokinoki? (6) Wapi mayele minei oyo bakoki kosalela mpo na kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila? (7) Ndenge nini minganga bakoki kosala (a) mpo makila ebima mingi te, (b) mpo na kobatela ba globule rouge, (c) mpo makila ebakisama na nzoto, mpe (d) mpo na kobebisa te makila oyo ezali kobima? (8) Limbolá mayele oyo babengi (a) hémodilution mpe (b) récupération de sang épanché. (9) Makambo nini osengeli koluka koyeba mpo na kosalisa nzoto kozanga kozongisama makila? (10) Bakoki kosala moto lipaso ya monene mpe ya mindɔndɔ kozanga ete bázongisa ye makila? (11) Mbongwana nini ya malamu minganga bazali kosala?
Kondima balolenge mosusu ya kosalisa oyo balakisi na video ezali ekateli ya moto ye moko, na kolanda lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Osili kopona mayele oyo okondima básalela na esika ya kozongisa makila, mpo na yo moko mpe mpo na bana na yo, mpe otondisi karte na yo DPA? Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000. Na nsima, salelá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006, oyo ezali na motó ya likambo “Ekateli nini nakozwa mpo na biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?,” mpo na kozwa bikateli na oyo etali mayele oyo okondima to okoboya. Na nsuka, komá bikateli nyonso oyo ozwi na karte DPA. Bato oyo okopona mpo báloba na esika na yo mpo minganga bátosa ekateli na yo, mpe bandeko na yo ya libota oyo bazali Batatoli te basengeli koyeba malamu bikateli oyo ozwi.
[Etanda na lokasa 3]
• Osili kopona mayele mosusu oyo minganga basalelaka na esika ya makila, oyo yo ná bana na yo bokondima básalisa bino na yango?
• Osili kotondisa karte na yo DPA mpe otambolaka na yango mpo esalisa yo soki likama ebimi mbalakaka.