Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mar.
“Mokolo na mokolo toyokaka nsango ya bato bazali konyokwama, kobɛla, mpe kokufa. Omitunaka te soki bampasi nyonso wana ekosila mokolo mosusu? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo esalisi bamilio ya bato bákóma na elikya. [Tángá Yoane 3:16.] Motó ya likambo ya zulunalo oyo elobi: ‘Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa yo.’ ”
Lamuká! Mar.
“Mpo na yo, biyambayamba esalisaka bato to esalaka bango mabe? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elobi likambo moko ya ntina mpo na yango. [Tángá Yisaya 65:11.] Lisolo oyo emonisi soki biyambayamba eyokani na mateya ya Biblia.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Apr.
“Okosepela te komona kokokisama ya esakweli oyo? [Tángá Yisaya 2:4, NW. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Tomoni ete Nzambe akokɔta na makambo ya bato mpe ‘akobongisa makambo.’ Biblia emonisi ete Nzambe akobunda etumba babengi Armagedona, oyo ekosilisa bitumba nyonso. Zulunalo oyo emonisi soki Armagedona ezali nini mpe ntina oyo tosengeli kozela yango na mposa makasi.”
Lamuká! Apr.
“Okanisi ete tozali kobika na ntango oyo balobeli awa? [Tángá 2 Timote 3:1-4. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Tosengeli mpenza koluka koyeba makambo etali mikolo ya nsuka, mpamba te yango ezali komonisa ete etikali moke makambo ya malamu esalema awa na mabelé. Zulunalo oyo elimboli likambo yango.”