Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/07 lok. 1
  • Kosambela Yehova libota mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambela Yehova libota mobimba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Baklisto basalaka makambo na bomoko kati na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Lolenge oyo bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ​—Kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 8/07 lok. 1

Kosambela Yehova libota mobimba

1 Na ntango ya kala, bato ya libota moko bazalaki kosala makambo mingi elongo. Bazalaki kosala misala ya ndako elongo, mpe oyo eleki ntina, bazalaki kosambela Yehova esika moko. (Lev. 10:12-14; Det. 31:12) Lelo oyo, na bisika mingi, mabota mingi basalaka makambo ebele elongo te. Nzokande, baklisto bayebi ete ezali na ntina básalaka makambo elongo na mabota na bango, mingi mpenza makambo ya losambo. Na ntembe te, Yehova, Mobandisi ya libota, asepelaka mingi komona mabota bazali kosambela ye na bomoko!

2 Kosakola elongo: Soki bato ya libota moko bazali kosakola nsango malamu elongo, boyokani na bango ekómaka makasi. Yango wana, atako ndeko oyo azali nkulutu asengeli kosakolaka ná bandeko mosusu ya lisangá, kasi asengeli mpe kosakolaka mbala na mbala ná mwasi na ye mpe bana na ye. (1 Tim. 3:4, 5) Atako bakɛngɛli-batamboli bazalaka na mosala mingi, kasi bazwaka ntango ya kosakola ná basi na bango.

3 Baboti oyo basakolaka ná bana na bango, bazalaka na likoki ya kosalisa bango bákóma basakoli ya malamu. Yango esalisaka bana bámona ete baboti na bango basepelaka mpenza na mosala ya kosakola mpe balingaka mpenza Yehova mpe bazalani na bango. (Det. 6:5-7) Ezali na ntina kosakolaka elongo na bana oyo ozali kobɔkɔla, ata soki bakómi mikóló. Mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali na bana mibali misato, ya liboso azalaki na mbula 21 mpe ya nsuka azalaki na mbula 15, bazalaki se kokoba kosakola elongo na bango. Tata alobi boye: “Mbala nyonso oyo tosakolaka elongo na bango, toteyaka bango likambo moko ya sika. Mpe tosalaka makasi ete básepela na yango mpe bálendisama.”

4 Komibongisa elongo: Mabota mingi bamonaka malamu bábongisaka elongo makambo oyo bakoloba na mosala ya kosakola. Mbala mingi, bana basepelaka komekameka na libota makambo oyo bakoloba na mosala ya kosakola, mpe kozwa esika ya mosakoli to moto oyo akosolola na mosakoli, moto na moto na ngala na ye. Mabota mosusu batikaka mwa miniti na nsuka ya boyekoli ya libota mpo na komibongisa ndenge wana.

5 Tozalaka na esengo koleka ntango tozali kosala mosala moko ya ntina mpe ya kosepelisa elongo na bato oyo tolingaka. Ndenge moko mpe, bato ya libota moko bazalaka na esengo mingi ntango bazali kosakola elongo ndako na ndako, kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, mpe koyekola na bato Biblia! Na bongo, soki osambelaka Yehova elongo na libota na yo, okoki koloba na esengo nyonso ete: “Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].”​—Yos. 24:15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto