Lolenge oyo bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ—Kati na mosala ya kosakola
1 Komona babalani, baboti na bana bazali kobima elongo na mosala ya kosakola ya boklisto mpo na kosanzola nkombo ya Yehova liboso na bato nyonso epesaka mpenza esengo na motema, boye te? (Nz. 148:12, 13) Mabota nyonso masengeli kozala na momeseno malamu ya kosangana ntango nyonso na mosala ya kosakola. Libota na yo esili kopona mokolo moko kati na pɔsɔ mpo na kobima na mosala ya kosakola? Soki ezali bongo, na boye moto nyonso na kati ya libota asili komilɛngɛla mpo na kosangana na molende nyonso na mosala yango.—Mas. 21:5a.
2 Liboso ya mokolo oyo bobongisi na libota mpo na mosala ya kosakola, bokoki kobongisa bilakiseli oyo bokosalela. Komeka bilakiseli yango mbala na mbala ekoki kosalisa bino mingi, mpe bilakiseli yango ekoki kopusa libota na komonisa elimo ya kosala elongo. Oyo nde lipamboli komona libota mobimba komipesa na mosala ya kosakola mpe ete bato nyonso ya libota bazali komibongisa malamu mpo na yango!
3 Mokɛngɛli motamboli moko abimaki na libota moko na mosala ya kokabola bazulunalo. Wana azalaki kosakola ndako na ndako elongo na mwana mwasi moko ya libota yango, mwana yango atunaki ete: “Tokosala ngonga boni?” Na nsima alobaki ete alingi kobima lisusu na tata na ye na mosala ya kosakola. Emonani ete ye na tata na ye bazalaki kosepela kosakola elongo. Libota yango ezali solo na elimo malamu!
4 Bato ya mabota mosusu bakoki kosala bango nyonso lokola babongisi-nzela basungi sanza moko kati na mbula. To moto ata moko ya libota akoki kosala lokola mobongisi-nzela mosungi mpo na libela to mpe kokɔta na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Soki bazali komibongisa malamu mpe bazali na boyokani malamu, mbala mosusu bato nyonso kati na libota bakozala na likoki ya komipesa mingi na mosala ya kosakola mpe bakosunga ye oyo azali kosala lokola mobongisi-nzela. Na ntembe te libota mobimba ekozwa mapamboli mingi na mosala yango.—Mki. 3:10.
5 Soki bakomipesa mingi na mosala ya kosakola mabota makozala na bomoko, na molende, bokoli ekomonana, mpe bato ya libota bakozala na esengo na mosala ya Yehova!—Kokanisá na Bafilipi 2:1, 2.