Ndenge oyo Boyekoli ya Mokanda ya lisangá esalisaka biso
1. Ndenge nini makita mitano oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ esalisaka biso?
1 Makita mitano oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ ekesani mpenza, ezala ndenge oyo mokomoko na yango esalemaka to na mokano oyo yango ekokisaka. Nzokande, makita yango nyonso ezali na ntina, mpamba te esalisaka biso “tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu.” (Ebe. 10:24, 25) Matomba nini mpenza mpe makambo nini mosusu ya malamu tozwaka na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá?
2. Matomba nini tozwaka na ndenge toyanganaka bato moke na Boyekoli ya mokanda?
2 Esalisaka biso tókola na elimo: Mbala mingi, Boyekoli ya mokanda ezalaka na bato mingi te lokola makita mosusu. Yango esalisaka biso tózwa baninga oyo bakoki kolendisa biso na elimo. (Mas. 18:24) Osalaka makasi oyeba bandeko nyonso ya etuluku na bino ya Boyekoli ya mokanda, na ndakisa, osɛngaka bango bóbima elongo na mosala ya kosakola? Boyekoli ya mokanda esalisaka mpe mokɛngɛli na Boyekoli ya mokanda ayeba malamu ndeko mokomoko ya etuluku mpe asalisa ye na ndenge ebongi.—Mas. 27:23.
3. Ndenge nini Boyekoli ya mokanda elendisaka likambo ya kopesa biyano mpe esalisaka bayekoli ya Biblia básepela koyangana na yango?
3 Obengisaka bato oyo oyekolaka na bango Biblia mpo báyangana elongo na yo na Boyekoli ya mokanda? Bato oyo basepelaka na nsango malamu kasi babangaka koyangana na makita na biso ya minene, bakoki kosepela koyangana na likita oyo ezalaka na bato ebele te, mingi mpenza soki esalemaka na ndako ya ndeko moko. Boyokani ya penepene oyo ezalaka kati na bandeko esalaka ete bana mike mpe bato ya sika bákakatana te mpo na kopesa biyano. Lisusu, lokola bayangani bazalaka ebele te, yango epesaka biso libaku ya kopesa biyano mingi mpo na kokumisa Yehova.—Nz. 111:1.
4. Na ndenge nini esika oyo tosalaka Boyekoli ya mokanda ekoki kozala malamu mingi mpo na biso?
4 Mbala mingi, Boyekoli ya mokanda esalemaka na teritware ya lisangá mpe na bisika oyo ebongi na basakoli ya etuluku mokomoko. Atako ezali mpasi mpo esika oyo Boyekoli ya mokanda esalemaka ezala pene na bandeko nyonso, kasi mbala mingi esɛngaka kotambola mingi te mpo na koyangana na Boyekoli ya mokanda lokola na makita mosusu. Esika oyo tosalaka Boyekoli ya mokanda ekoki mpe kosalelama mpo na makita ya mosala ya kosakola.
5. Ndenge nini tokoki kozwa lisalisi epai ya mokɛngɛli na Boyekoli ya mokanda ya etuluku na biso?
5 Tozwaka lisalisi mpo na kosakola: Mokɛngɛli na Boyekoli ya mokanda asalisaka ndeko mokomoko ya etuluku na ye mpo asakolaka mbala na mbala na ndenge oyo ekobota mbuma, mpe asepela na mosala yango. Yango wana, asalaka makasi asakolaka elongo na ndeko mokomoko ya etuluku na ye, mpe asalisaka bango na bámesana na lolenge nyonso ya kosakola. Soki ozali na mokakatano na lolenge moko ya kosakola, na ndakisa kozongela bato oyo basepelaki, yebisá yango na mokɛngɛli ya etuluku na bino. Mbala mosusu, akoki kozwa bibongiseli mpo osakola elongo na mosakoli moko ya etuluku na bino oyo akɔmeli. Soki otyaka likebi na mayele ya koteya oyo mokɛngɛli ya etuluku na bino asalelaka ntango azali kotambwisa Boyekoli ya mokanda, okoyeba lisusu malamu koteya bato oyo oyekolaka na bango Biblia.—1 Kol. 4:17.
6. Mpo na nini tosengeli mpenza kozwaka matomba na Boyekoli ya mokanda?
6 Boyekoli ya Mokanda ya lisangá ezali mpenza lipamboli monene! Ebongiseli wana oyo Yehova azwi na bolingo na ye, esalisaka biso tótikala makasi na elimo na mikolo oyo ya mpasi.—Nz. 26:12.