Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/07 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 8/07 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Aug.

“Nalingi koyeba likanisi na yo na makambo vɛrsɛ oyo elobi. [Tángá Baebele 3:4.] Ondimaka ete molɔ́ngɔ́ ekelamá na Mozalisi ya mayele? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi soki kondima ete Mozalisi azali eyokani na siansi ya solosolo.”

Lamuká! Aug.

Soki okutani na elenge, okoki koloba boye: “Bilenge mingi ya mbula na yo basilá koyoka mpasi na motema mpo bato batɔngaki bango. Yango esilá mpe kokómela yo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia epesi toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso ntango batɔngi biso. Emonisi mpe oyo tokoki kosala mpo tótɔngaka basusu te.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12, mpe tángá vɛrsɛ moko oyo ezali na lisolo yango.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.

“Bato mingi bamonaka ete ‘Kondimana ya kala’ esalisaka bango báyeba malamu masolo ya kala. Kasi, bamitunaka soki mitinda na yango ezali na ntina lelo oyo. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baloma 15:4.] Zulunalo oyo emonisi ete ‘Kondimana ya kala’ ezali na batoli ya ntina mingi mpe ezali kopesa bato elikya mpo na mikolo ezali koya.”

Lamuká! Sɛt.

“Okanisi ete Nzambe nde abimisaka makama oyo eutaka na mipɛpɛ makasi to koningana ya mabelé? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Deteronome 32:4.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo Nzambe atikaka nzela ete makama yango esalema. Emonisi mpe oyo okoki kosala mpo na kobatela libota na yo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto