Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Des.

“Na eleko ya Noele, bato mingi balukaka komonisela basusu boboto. Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu koleka soki bato bámoniselanaka boboto na mikolo nyonso ya mbula? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 1 Petelo 3:8.] Zulunalo oyo elimboli ntina ya kozala na boboto mpe elobeli mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisela basusu boboto.”

Lamuká! Des.

“Okanisi ete bato na biso oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete likoki ezali ya kobima na liwa. [Tángá Nzembo 68:20.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo tosengeli te kokanisa ete liwa esukisaka bomoi mpo na libela.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yan.

“Bato mingi babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Na ndakisa, talá libondeli oyo eyebani mingi, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye. [Tángá Matai 6:9, 10.] Omituna naino te soki Bokonzi yango ezali nini mpe ntango nini ekoya? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi likanisi ya Biblia na likambo yango.”

Lamuká! Yan.

“Banda kala bato banyokolaka basi mpe basalelaka bango makambo na kozanga bosembo. Okanisi ete basalaka bongo mpo na nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá makambo Biblia esɛngi mibali básalelaka basi na bango. [Tángá 1 Petelo 3:7.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi ndenge oyo Nzambe mpe Klisto batalelaka basi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto