Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Des.
“Na eleko oyo, bato na mokili mobimba basepelaka kobotama ya Yesu na ndenge mingi. Oyebi ete Biblia esakolaki ete kobotama ya Yesu ekomema kimya ya libela na libela? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yisaya 9:6-7.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ndenge esakweli yango ekokokisama.”
Lamuká! 22 Des.
“Omonaka ndenge bato bakómi kolobela mingi kolata mpe kobongisa nsuki? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela makama ya kolekisa ndelo na monzɛlɛ. Ezali mpe komonisa polele ntina ya monzɛlɛ oyo eleki nyonso.” Tángá 1 Petelo 3:3, 4.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yan.
“Mangomba mingi eteyaka ete bato basengeli kolinga bazalani na bango. [Tángá Matai 22:39.] Na makanisi na yo, mpo na nini mangomba ezali komikɔtisa na bitumba mpe matata oyo ezali kobima na mokili? [Tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela motuna oyo: Mangomba ekoki kosalisa bato bázala na bomoko?”
Lamuká! 8 Yan.
“Eyano nini okoki kopesa na motuna oyo? [Tángá motuna oyo ezali na ezipeli. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Mabelé ezali kobeba na ndenge ya nsɔmɔ mpenza. Kasi, talá elaka oyo ya kolendisa. [Tángá Nzembo 104:5.] Lamuká! oyo ezali kolimbola ndenge, etikali moke, mabelé ekozonga kitoko ndenge ezalaká kala.”