Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Des.
“Soki tokómi na basanza oyo, bato mingi bakanisaka mbotama ya Yesu. Oyebaka ete ndenge Biblia elobeli kobotama na ye ekoki koteya biso ebele ya makambo ya ntina? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá lokasa 5, mpe tángá 2 Timote 3:16.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela mwa makambo yango.”
Lamuká! 22 Des.
“Omonaka ete baboti basengeli mpenza komitungisa mingi na ndenge masano ya mikolo oyo ekómi na mobulu mpe ezali kobebisa bana na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Baboti mingi basalelaka etinda oyo ezali na kati ya vɛrsɛ oyo ya Biblia na likambo yango. [Tángá Nzembo 11:5.] Lamuká! oyo ezali kosalisa mabota bátalela makama oyo masano ya video ebimisaka.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yan.
“Ntango bato bakufelaka moto to bazali konyokwama na maladi, bamitunaka mbala mingi, ‘Mpo na nini Nzambe atiki nzela na likambo ya boye?’ Ntango mosusu, yo mpe osilá kotuna motuna yango. Biblia emonisi biso ete Nzambe ayokelaka bato oyo bazali konyokwama mawa. [Tángá Yisaya 63:9a.] Zulunalo oyo ezali kolimbola mpo na nini tosengeli kondima ete Nzambe akosilisa mpasi.”
Lamuká! 8 Yan.
“Okanisi boni, Leta asengeli kopekisa bonsomi ya koloba? [Tiká ye apesa eyano.] Bongo, okanisi boni soki bonsomi ya koloba etaleli kosolola na bato makambo ya lingomba, ndenge bakomi yango awa? [Tángá Misala 28:30, 31.] Eleki mwa mikolo, basambaki likambo yango na tribinale monene (Cour suprême) ya États-Unis. Okoki kotánga yango na Lamuká! oyo.”