Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/08 lok. 1
  • Salelá ntango malamu na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá ntango malamu na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Makita mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Tózwa matomba na likita ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Oyo okoki kosala mpo ozwa matomba na etuluku na bino ya mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 1/08 lok. 1

Salelá ntango malamu na mosala ya kosakola

1 Tozali na mingi ya kosala na mosala ya kosakola, mpe ntango oyo etikali ekómi mokuse. (Yoa. 4:35; 1 Kol. 7:29) Soki tosali programɛ malamu mpe tomibongisi liboso, tokoki kosalela ntango malamu na mosala na biso ya kosakola.

2 Komibongisa liboso: Liboso ya kokende na likita mpo na mosala ya kosakola, kobosana te kozwa mikanda nyonso oyo okozala na yango mposa mpe kobongisa maloba na yo ya kobanda lisolo. Nsima ya likita ya mosala ya kosakola, soki kaka libondeli esili, kendá mbala moko kosakola. Yango ekosalisa yo mpe moto oyo okobima na ye bósalela ntango malamu na mosala ya kosakola.

3 Soki yo nde okotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola, bandá yango na ngonga oyo etyami. Likita yango esengeli kozala molai te​—eleka miniti 10 to 15 te. Liboso ya kopanzana, salá ete moto na moto azwa moto ya kobima na ye mpe ayeba teritware nini bapesi ye.

4 Na mosala ya kosakola: Soki kaka likita mpo na mosala ya kosakola esili, kolekisa lisusu ntango mpamba te; kendá mbala moko na teritware na yo. Soki bozali kosakola na etuluku mpe omoni ete okokata mosala ya kosakola liboso ya baninga, ekozala malamu obongisa mbongo ya tike mpo ozonga na ndenge na yo, noki te bandeko mosusu bakokata mosala ya kosakola liboso ya ngonga oyo babongisaki. Ntango bozali kosakola na etuluku, luká komitya na esika ya basusu mpe kosolola na bato na yo masolo milaimilai te. Soki moto oyo ozali kosolola na ye azali kobimisa makanisi ebeleebele, okoki kokata lisolo na mayele to kobongisa kozongela ye mokolo mosusu.​—Mat. 10:11.

5 Ntango bozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ekozala malamu bóbanda na bato ya balabala to ya kartye moko liboso ya kokende na balabala to kartye mosusu, yango ekosalisa bino bótambolatambola mingi te. Ekoki mpe kozala malamu kobenga bato mosusu na telefone mpo na koyeba soki bakozala na ndako. (Mas. 21:5) Soki omoni ete okosolola na moto ntango molai, okoki kosɛnga bandeko mosusu ya etuluku básakola penepene wana to bázongela bato mosusu oyo basepelaki na nsango malamu.

6 Tozali na eleko ya mosala monene ya kobuka mbuma na elimo. (Mat. 9:37, 38) Etikali moke mosala yango esuka. Na bongo, tosengeli kosalelaka ntango malamu na mosala na biso ya kosakola.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto