Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali
“Okanisi ete Nzambe ayokaka mabondeli nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Yesu alobaki na likambo yango. [Tángá Matai 6:7.] Lisolo oyo epesi eyano ya Biblia na mituna minei oyo bato bamitunaka mingi mpo na libondeli.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 16.
Lamuká! Febwali
“Bato mingi bakanisaka ete makambo nyonso oyo ekómelaka biso na bomoi etángamá liboso. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Na kotalela vɛrsɛ oyo, tozali na bonsomi ya kopona. [Tángá Deteronome 30:19.] Lisolo oyo emonisi soki Biblia endimaka ete makambo nyonso ya bato etángamá liboso.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi
“Okanisi ete makambo nyonso oyo esalemaka na bomoi ebongisamá liboso? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Biblia elobi mpo na yango. [Tángá Mosakoli 9:11.] Zulunalo oyo elimboli ete, atako Nzambe asilá kobongisa liboso makambo ya malamu oyo ekozala awa na mabelé, atikelaka mokomoko na biso bonsomi ya kopona nini akosala na bomoi na ye.”
Lamuká! Marsi
“Lelo oyo, bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo etali mbongo, mingimingi na eleko oyo nkita ekwei. Ondimi likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká toli oyo ekoki kosalisa yo. [Tángá 1 Timote 6:8, 10.] Zulunalo oyo elobeli mwa mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso tósalela mbongo na biso na ndenge oyo ekoki kosalisa biso tózala na kimya na makanisi.”