Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aprili
“Babuku mosusu elobaka ete Yesu akufaki te ndenge Biblia elobi, kasi atikalaki na bomoi, abalaki mwasi mpe abotaki bana. Osilá koyoka likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Esengeli mpenza tóyeba solo na likambo yango. [Tángá Yoane 17:3.] Lisolo oyo emonisi bantina oyo tosengeli kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na Yesu.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 26.
Lamuká! Aprili
Tángá Nzembo 37:9-11. Na nsima tuná boye: “Okanisi ete mokili ekokóma ndenge nini ntango maloba oyo ekokokisama? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli esakweli yango ya kolendisa mpe elimboli ntina oyo mabe etondi na mokili lelo oyo.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Mai
“Osilá komituna mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ndenge mokomi moko ya Biblia atunaki motuna oyo bato mingi batunaka. [Tángá Nzembo 10:1.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi mpe oyo azali kosala mpo na kosilisa yango.”
Lamuká! Mai
“Bato mingi bazalaka na mposa ya kotika komɛla makaya kasi bakokaka te. Oyebi moto moko oyo azali kobunda na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mosusu balongaki mpo baninga mpe bandeko na bango basalisaki bango. [Tángá Mosakoli 4:12a.] Zulunalo oyo ezali na batoli ya malamu oyo ekoki kosalisa moto atika komɛla makaya.”