Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi
Tángá Kobima 20:15. Na nsima, lobá boye: “Atako bato mingi basalaka makasi bátosa mobeko yango, bato mosusu balobaka ete na ntango ya mpasi ezali mabe te koyiba mpe kosala makambo mosusu oyo ezangi sembo. Yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli matomba ya kozala sembo ntango nyonso.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12.
Lamukà! Marsi
“Bato mingi bamemyaka Biblia, kasi bamonaka ete makambo mingi oyo ezali na kati na yango ezali na ntina te na mikolo na biso. Yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baroma 15:4.] Lisolo oyo emonisi ete ata biteni mosusu ya Biblia oyo eumeli mingi ezali kaka na ntina.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 28.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Aprili
“Ntango batuni bango moto oyo abongolá bomoi ya bato koleka moto mosusu nyonso, bato mingi balobaka ete ezali Yesu. Yo mpe okanisaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ntina oyo tosengeli koluka koyeba solo na kotalela makanisi ndenge na ndenge oyo bato bazalaka na yango mpo na ye. [Tángá Yoane 17:3]. Nimero ya ntina mingi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi oyo Biblia elobi mpenza mpo na Yesu mpe mateya na ye.”
Lamukà! Aprili
“Emonanaka lokola ete tozalaka na ntango mingi te mpo na kosala makambo nyonso oyo tolingaka kosala. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bamonaki ete toli oyo esalisaki bango. [Tángá Bafilipi 1:10.] Zulunalo oyo epesi batoli mosusu oyo ebongi, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba kosalela malamu ntango na biso.”