Tómibongisa malamumalamu mpo na Ekaniseli
Mbula na mbula, biso bayekoli ya Klisto tozalaka na esengo mpe na libaku malamu ya komibongisa malamumalamu mpo na kokanisa liwa ya Yesu Klisto! (Luka 22:19) Makambo nini tosengeli kosala mpo na komibongisa mpo na Ekaniseli?
◼ Ngonga mpe esika: Moto nyonso asengeli koyeba malamu ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema. Soki masangá mingi ekosala Ekaniseli na Ndako ya Bokonzi moko, ekozala malamu kokóma na ngonga oyo ebongi mpe kolongwa noki mpe na molɔngɔ, mpo ntango oyo ekaboli lisangá ya liboso na oyo ekolanda ezali mokuse. Esengeli koyokana malamu mpo bato bátondana te na porte, na balabala, mpe na bisika ya kotɛmisa mituka.
◼ Nkasa ya kobenga bato: Basakoli nyonso bazwi nkasa mpo na kobenga bato mpe bayebi makambo oyo ezali na kati? Osili komeka ndenge ya kotikela bato lokasa yango? Okopesa banani nkasa yango? Tosengeli kosala milende mpo na kokabola nkasa yango nyonso.
◼ Baoyo bazali na mokakatano mpo na kokóma na esika ya Ekaniseli: Bato mosusu oyo basepelaka na nsango malamu mpe bandeko mosusu bakoki kozala na mposa ya tike to ya lisalisi na makambo mosusu mpo báyangana na Ekaniseli. Bibongiseli nini bosili kozwa mpo na kosalisa bandeko yango?
◼ Limpa ná vinyo: Bóbosana te ete limpa ná vinyo esengeli koleka te liboso moi elala. Bosengeli kozwa bibongiseli mpo na komema limpa ná vinyo epai ya ndeko nyonso mopakolami oyo azali na bokɔnɔ, azali na makoki ya koyangana te. Esengeli kozwa limpa ná vinyo oyo ebongi mpe kobongisa yango liboso mpenza.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 2003, nkasa 14-15, paragrafe 14, 17.
◼ Ndako ya Bokonzi: Ndako ya Bokonzi esengeli kopɛtolama malamu liboso. Basaani, bakɔpɔ, mesa ya malamu, mpe elamba ya mesa oyo ebongi esengeli kotyama na Ndako ya Bokonzi liboso ete Ekaniseli ebanda. Soki bokosala Ekaniseli na Ndako ya Bokonzi te, bosengeli kosala nyonso ete mikro mpe masini ya bikoliseli lolaka ezala malamu mpo bayangani nyonso báyoka molobi. Bandeko oyo bakoyamba bato mpe baoyo bakolekisa limpa ná vinyo basengeli koponama liboso; esengeli kopesa bango malako oyo etali mikumba na bango mpe lolenge malamu ya kokokisa yango, mpe koyebisa bango bálata malamu mpe bákata nsuki na ndenge ebongi.
Tolingi ete mokomoko na biso mpe lisangá mobimba, tómibongisa malamumalamu mpo na mokolo wana ya ntina mingi, mokolo ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu Klisto. Na ntembe te, Yehova akopambola mpenza baoyo nyonso bamonisaka botɔndi na motema mobimba mpo na nyonso oyo asalá mpo na bato na nzela ya mbeka ya Yesu Klisto, Mwana na ye oyo alingaka mingi.