Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/09 lok. 2
  • Ndenge ya kobongisa Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobongisa Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Malako mpo na bandeko oyo basalaka masolo na Likita ya Mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Makanisi mabongi na koteya, malakisami polele
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tobengi yo oya koyangana na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Likita ya mosala ya kosakola oyo ekokisaka mokano na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 5/09 lok. 2

Ndenge ya kobongisa Likita ya Mosala

1. Mokano ya Likita ya Mosala ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi na likita yango?

1 Likita ya Mosala ebongisami mpo na kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo mosala na biso ya kosakola ebota mbuma. Likita yango elobelaka mingimingi mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, kokómisa bato bayekoli, mpe koyebisa bitumbu oyo Yehova akopesa mosika te. (Mat. 28:20; Mko. 13:10; 2 Pet. 3:7) Tokozwa matomba mingi na likita wana ya ntina soki tomibongisi malamu mpe soki tozali kopesa biyano.

2. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kolanda lisukulu na Likita ya Mosala?

2 Lisukulu: Mbala mingi, na malako oyo ezali na programɛ, bayebisaka molobi esika oyo lisukulu ekouta. Ekozala malamu otánga lisolo yango, ata mpe bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te na kati ya lisolo, mpe okanisa ndenge oyo okoki kosalela makambo yango na mosala ya kosakola.

3. Tokoki kosala nini mpo na kobongisa lisolo ya mituna mpe biyano?

3 Lisolo ya mituna mpe biyano: Lisolo yango esalemaka lokola boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; molobi abandaka mpe asukisaka na mwa maloba mokuse. Tyá mokɔlɔtɔ na makanisi ya ntina oyo ezali na paragrafe mokomoko, mpe mibongisá mpo na kopesa biyano ya malamu mpe ya mikuse.

4. Ndenge nini tokoki kobongisa lisolo elongo na bayangani?

4 Lisolo elongo na bayangani: Lisolo yango esalemaka lokola lisukulu, kasi na bisika mosusu, molobi asɛngaka bayangani bápesa biyano. Soki otyaki mikɔlɔtɔ na makanisi ya ntina mpe otángaki bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te na kati ya lisolo, okozala na likoki ya kopesa biyano ntango molobi akotuna mituna. Ndeko oyo akosala lisolo yango akosala makasi mpo na kosɛnga bayangani bábimisa makanisi ya ntina.

5. Nini ekosalisa biso tózwa matomba mingi na bilakiseli?

5 Bilakiseli: Masolo mosusu ezalaka na bilakiseli oyo emonisaka ndenge ya kosalela makambo oyo toyekoli na teritware na biso. Bilakiseli yango ekoki kosalema na bankulutu, na basakoli ya makoki, to na babongisi-nzela. Ntango ozali kobongisa eteni yango, osengeli kokanisa ndenge oyo bilakiseli yango ekosalema. Ntango ndeko moko azali kosala elakiseli na maloba oyo bapesi lokola ndakisa, kanisá ndenge oyo okoki kosala yango na maloba na yo moko mpe koyokanisa yango na bato ndenge na ndenge oyo okosolola na bango na mosala ya kosakola. Kobosana te komema buku to zulunalo oyo bakosalela mpo na elakiseli yango. Na mpokwa oyo boponá mpo na Losambo na kati ya libota, mbala mosusu bokosepela komekameka bilakiseli yango.

6. Tángá mwa bantina oyo tosengeli kobongisa Likita ya Mosala.

6 Likita ya Mosala epesaka esengo mingi soki tomibongisi malamu mpe tomanyoli liboso likoló ya mateya kitoko oyo ekopesama na likita yango. Soki tolandi malako wana, tokolendisa bandeko, biso moko mpe tokolendisama mingi. (Lom. 1:11, 12) Soki tozwi ntango ya kobongisa Likita ya Mosala, tokozala na nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mokumba na biso.​—2 Tim. 3:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto