Malako mpo na bandeko oyo basalaka masolo na Likita ya Mosala
Kobanda na Mosala na biso ya Bokonzi oyo, ndenge ya kobenga masolo ya Likita ya Mosala ekómi pɛpɛlɛ. Malako mpe batoli oyo elandi esemboli mpe ekómisi polele malako oyo ebimaki na lisolo “Ndenge ya kobongisa Likita ya Mosala,” na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2009.
◼ Lisukulu: Ezali lisukulu oyo bamonisi esika ekouta, mpe bayangani bakoloba eloko te. Molobi asengeli konyata mpenza makanisi oyo ezali na litomba mingi mpo na lisangá.
◼ Mituna mpe biyano: Lisolo yango esengeli kosalema lokola boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; molobi akobanda mpe akosukisa na mwa maloba mokuse, mpe akotuna mituna ya baparagrafe nyonso. Motambwisi asengeli koloba mingi te. Bavɛrsɛ oyo esimbi makanisi ya ntina ekoki kotángama soki ngonga ezali. Esengeli te kotánga baparagrafe, longola kaka soki bapesi malako ete baparagrafe etángama.
◼ Lisolo ná bayangani: Ezali lisukulu oyo ekosɛnga ete bayangani báloba na bisika mosusu. Ezali kaka lisukulu te, ezali mpe lisolo ya mituna mpe biyano te.
◼ Bilakiseli mpe mituna: Soki balobi salá elakiseli, yango elimboli ete ndeko oyo akosala lisolo yango azali na mokumba ya kopona bandeko oyo bakosala elakiseli; ye moko asengeli te kosala elakiseli yango. Bandeko oyo akopona mpo na kosala bilakiseli basengeli kozala basakoli oyo bakosala yango malamu mpe oyo bazali ndakisa malamu, mpe asengeli koyokana na bango liboso. Ezali malamu te kopona basakoli ya sika oyo bameseni naino te na mosala ya kosakola bámonisa ndenge mosala yango esengeli kosalema, kaka mpo na kopesa bango libaku ya komata na estrade, atako bokoki kosalela basusu kati na bango lokola balobani. Basakoli oyo bazali kosala elakiseli basengeli kopesa bayangani mokɔngɔ te. Bandeko oyo bakotunama mituna basengeli komata na estrade mpo na kopesa biyano na mituna oyo molobi akotuna bango. Esengeli komekameka bilakiseli mpe mituna liboso ya kosala yango. Soki bandeko mosusu balei ngonga ya makita mpe ndeko oyo akolanda asengeli kokómisa lisolo na ye mokuse, asengeli te kolongola bilakiseli to mituna oyo ebongisamaki. Basaleli na misala basengeli kotuna mokambi-misala ya bankulutu to nkulutu mosusu liboso ya kopona bato oyo bakosala bilakiseli to bakoyanola na mituna.
Soki lisolo moko ezali na malako ya polele, esengeli kolanda malako yango malamumalamu. Soki bandeko bazali kosala masolo ya Likita ya Mosala na kolanda malako oyo ezali awa likoló, bakopesa mabɔkɔ mpo ete Likita ya Mosala “esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Ko. 14:40.