Liyangani ya zongazonga oyo ekosalisa biso tóbatela boyokani malamu na Nzambe
1. Wapi moko ya bibongiseli oyo Yehova asali mpo na kosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kopalanganisa nsango malamu?
1 Yehova apesaka biso malako, formasyo, mpe bilendiseli oyo tosengeli na yango mpo tókokisa mokumba oyo apesi biso ya kopalanganisa nsango malamu. (Mat. 24:14; 2 Tim. 4:17) Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya mayangani ya zongazonga oyo tosalaka mbula na mbula. Motó ya likambo ya liyangani ya zongazonga mpo na mobu ya mosala 2010 elobi: “Batelá boyokani na yo na Nzambe”; eponami na kolanda makanisi ya Baloma 8:5 mpe Yuda 17-19. Bato ya liboso bakosala liyangani yango na pɔsɔ ya 31 Augusto 2009.
2. (a) Matomba nini tokozwa na liyangani ya zongazonga? (b) Ndenge nini mayangani ya zongazonga oyo eleká esalisaki yo na mosala ya kosakola?
2 Matomba oyo tokozwa: Liyangani yango ekokebisa biso na makama ndenge na ndenge; na ndakisa, misala oyo ekoki kobebisa to kolya ntango na biso mpe misala oyo ekoki kolongola likebi na biso na makambo oyo eleki ntina. Tokoyekola ndenge ya kotɛmɛla ezaleli ya kokanga miso na makambo mabe, mpe tokomona soki kozala moto ya elimo elimboli mpenza nini. Lisukulu ya biteni mingi oyo ekosalema mokolo ya lomingo ekomonisa ndenge oyo ndeko mokomoko to mpe bato ya libota mobimba bakoki kokolisa boyokani na bango na Nzambe ata soki bazali kokutana na mikakatano to komekama. Liyangani yango ekosalisa biso tóbatela mitema na biso, tótikala makasi na elimo, mpe tóbosana te ete baoyo nyonso bazali kobatela boyokani malamu na Nzambe bakozwa matomba mingi.
3. Liyangani na biso ya zongazonga ekosalema na dati nini, mpe mpo na yango, tosengeli kozala na ekateli nini?
3 Ntango kaka bokozwa mokanda oyo ekoyebisa dati mpe esika oyo bokosala liyangani na bino, moto na moto azwa bibongiseli mpo azanga te na mikolo nyonso mibale mpe alanda programɛ malamu. Tóyeba ete Yehova apambolaka mabɔkɔ ya bato ya mosala.—Mas. 21:5.
4. Tozali na elikya ya kozwa nini na liyangani ya zongazonga ya mbula ezali koya?
4 Yehova nde apesi biso likabo malamu yango. Mateya oyo moombo ya sembo mpe ya mayele abongisi ezali mpenza oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mosala na biso lokola baklisto. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na makabo na ye nyonso oyo esalisaka biso “tósimba makasi eyambweli ya elikya na biso kozanga kotengatenga.”—Ebe. 10:23-25; Yak. 1:17.