Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/96 lok. 2
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga 1995-1996
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Liyangani ya zongazonga oyo ekosalisa biso tóbatela boyokani malamu na Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Manaka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 8/96 lok. 2

Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya

1 Kobanda na Sɛtɛ́mbɛ, motó na likambo ya mayangani ya zongazonga ekozala bongo “Tóyoka mpe tóyekola kotosa Liloba ya Nzambe.” Motó na likambo oyo ezwami na Deteronome 31:12, 13 ebongi mpenza malamu na manáka, ezali komonisa motuya ya mateya oyo tosengeli koyekola mpe kotosa.

2 Atako bato mingi lelo oyo bazali kotya likebi na maloba mapemami ya lokuta, ezali likambo ya ntina ete moko na moko kati na biso ayoka Liloba ya Nzambe mpe ayekola kotosa yango. (Luka 11:28; 1 Tim. 4:1) Ezali na mokano wana nde mateya ya liyangani ya zongazonga mabongisami na lolenge ya kolendisa mpe ya kosalisa basakoli, mabota, bankulutu mpe babongisi-nzela. Na Mwapɔ́sɔ ekozala na masukúlu-matongani na biteni minei likoló na motó na likambo oyo ete “Tólónga mikakatano na biso na kotyáká likebi na Liloba ya Nzambe.” Mpe na Mwalomingo na ntɔ́ngɔ́, ekozala na masoló-matongani mosusu oyo mazali na motó na likambo ete “Makomami mazali kosembola biso kati na boyengebene.” Manáka oyo na mobimba na yango ekozala na bilendiseli ya elimo oyo yo mpe libota na yo bosengeli kozanga te.

3 Na Mwapɔ́sɔ mpe na Mwalomingo bilakiseli, makanisi mabongi mpo na mosala ya kosakola makopesama. Okoyoka mpe mituna-masoló mpe makambo ya kolendisa mpe ya koteya. Na yango, na kozaláká wana mpe na koyokáká na mokano ya kosalela makambo oyo ozali koyekola, okozala na likoki ya kotosa mibeko ya Liloba ya Nzambe.

4 Batisimo ya baoyo bauti komipesa kala mingi te epai na Nzambe ekozala ntango moko ya ntina ya liyangani ya zongazonga. Liboso ya eyambweli ya komipesa na bango, bakandidá basengeli koyebisa mposa na bango ya kozwa batisimo epai na mokɛngɛli-mokambi, na boye ete akamata bibongiseli mpo ete bankulutu básolola elongo na bango.

5 Lisukúlu ya bato banso ya mayangani oyo ekozala na motó na likambo “Mpo na nini komitika kotambwisama na Biblia?” Byangá bato oyo bazali komonisa bosepeli. Na kokanisáká na bilendiseli mpe na lisalisi oyo yo mpe libota na yo bokozwa, omibongisa na koyangana na biteni nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto