Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/12 lok. 2
  • Batelá makanisi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá makanisi na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya zongazonga oyo ekosalisa biso tóbatela boyokani malamu na Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Batelá lisosoli na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ebongiseli moko mpo na baministre bakristo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 8/12 lok. 2

Batelá makanisi na yo

1. Motó ya likambo ya liyangani ya zongazonga ya mobu ya mosala 2013 ezali nini, mpe liyangani yango ekosalisa biso na nini?

1 Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bálinga Yehova na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na makanisi na bango nyonso. (Mat. 22:37, 38) Mayangani ya mbula oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tóbongisa bomoto na biso ya kati. Ozali koyeba lisusu ete motó ya likambo ya liyangani na biso ya etúká ezalaki “Batelá motema na yo!” Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2013 ezali na motó ya likambo “Batelá lisosoli na yo.” Mpe mayangani ya zongazonga oyo ekobanda na sanza oyo ezali koya ekozala na motó ya likambo “Batelá makanisi na yo,” ekouta na Matai 22:37. Mayangani yango ebongisami mpo na kosalisa mokomoko na biso atalela makanisi na ye mpo akómisa yango na ndenge oyo ekosepelisa Yehova mpenza.

2. Mituna nini tosengeli koluka kozwa biyano na yango na boumeli ya liyangani?

2 Makambo oyo ekolobelama: Wana tokozala na liyangani ya zongazonga tosengeli kotya likebi na biyano ya mituna oyo, mpo yango nde makambo ya ntina mingi:

• Ndenge nini tokoki koboya kokanisa ‘makanisi ya bato’?

• Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na kolongola litambala oyo ezipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima?

• Tosengeli kozala na makanisi ya ndenge nini?

• Komanyola makambo ya malamu ezali na matomba nini?

• Ndenge nini tokoki kotika Yehova atambwisa makanisi na biso?

• Mibali, basi, baboti, mpe bana bakoki kosala nini mpo libota ezala na esengo?

• Ndenge nini tokoki komilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?

• Kobongisa makanisi na biso mpo na mosala elimboli nini?

• Baoyo basalelaka makambo oyo bayekolaka bazwaka matomba nini?

3. Mpo na nini ezali na ntina tóyangana mikolo nyonso mibale, tólanda na likebi, mpe tósalela makambo oyo tokoyekola?

3 Satana azali kosala milende mpo na kobebisa makanisi na biso. (2 Ko. 11:3) Na yango, tosengeli kosala nyonso mpo na kobatela makanisi na biso. Tosengeli kokoba komonisa makanisi ya Kristo mpe kobundisa bamposa mabe ya mokili. (1 Ko. 2:16) Na yango, zwá bibongiseli mpo ozala mikolo nyonso mibale ya liyangani ya zongazonga. Landá masolo na likebi. Kosalela makambo yango ekosalisa biso tóbongisa makanisi na biso mpo na kosala mosala ya Bokonzi na molende.​—1 Pe. 1:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto