Manaka mpo na Pɔsɔ ya 21 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 21 SƐTƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 1 par. 10-18, etanda lok. 13
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mitángo 30-32
No. 1: Mitángo 32:1-15
No. 2: Tokokóma ndenge nini soki tokufi? (lr mok. 34)
No. 3: Bakristo nyonso nde bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló? (rs-F lok. 64 par. 1-3)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Tómibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya ntina mingi oyo ekobima na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lobá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango. Sɛngá bayangani báyebisa masolo nini ya Lamuká! wana ya ntina mingi ekosepelisa mpenza bato ya teritware na bino. Sololá na mobongisi-nzela moko oyo ayebaka kobanda masolo ntango azali kokabola mikanda mpe sɛngá ye asala elakiseli moko mpo na kokabola Lamuká! yango.
Min. 10: Soki moto alobi, ‘Nasepelaka na yango te.’ Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Comment raisonner, lokasa 16. Sɛngá mosakoli moko asala elakiseli moko to mibale oyo ekomonisa makanisi oyo buku yango epesi.
Min. 10: “Tósalelaka Biblia malamumalamu.” Ekosalema na mituna mpe biyano.