Sikoyo nde ntango ya kosakola!
1. Mpo na nini sikoyo ezali ntango ya kosakola?
1 “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo.” Anzelu azali kotambwisa mosala yango, mpe nsango wana ezali kosakolama “epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” Mpo na nini? “Mpamba te ngonga ya kosambisa [ya Nzambe] eyei.” Lelo oyo, tozali na ‘ngonga yango ya kosambisa,’ oyo ekosuka na kobebisama ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Ezali na ntina mingi ete bato ‘básambela Oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe maziba ya mai.’ Mosala moko te na misala nyonso oyo ezali kosalema lelo, ezali na ntina mingi to esengeli kosalema nokinoki lokola mosala ya kosakola “nsango malamu ya seko.” Ya solo, sikoyo nde ntango ya kosakola!—Emon. 14:6, 7.
2. Ndenge nini basaleli ya Yehova bamonisaka ete bayebi ete mosala ya kosakola esengeli kosalema nokinoki?
2 Na mbula zomi oyo euti koleka, basaleli ya Yehova balekisaki ngonga pene na miliare 12 na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli. Mingi na bango babongolaki makambo mosusu ya bomoi na bango mpo básangana mingi na mosala ya kobuka mbuma. (Mat. 9:37, 38) Na ndakisa, na mbula oyo euti koleka, na sanza mokomoko, basakoli koleka 850 000 basalaki mosala ya mobongisi-nzela. Mpo na babongisi-nzela ya sanza na sanza, esɛngaka kosala ngonga 70 sanza nyonso na mosala ya kosakola. Mpo na babongisi-nzela basungi, esɛngaka ngonga 50.
3. Mbala mingi esɛngaka basakoli bábongola makambo nini ya bomoi na bango mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela?
3 Esɛngaka nini mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela?: Lokola babongisi-nzela bayebi ete “ntango oyo etikali ekómi mokuse,” basalaka nyonso mpo na kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ. (1 Kol. 7:29, 31) Balukaka ndenge ya kosala mpo bábebisa mbongo na bango mpambampamba te, mpo bálekisaka ntango mingi te na misala oyo basalaka. Na ndakisa, basusu bakómá kofutela bandako ya mike. Basusu balongolaki biloko oyo bazalaki lisusu na mposa na yango mpenza te. (Mat. 6:19-21) Mbala mingi, esɛngaka bátika makambo mosusu oyo bazalaki kokana kosala. Nyonso wana basalaka yango mpo bátikala na ntango mingi ya komipesa na mosala ya kosakola. (Ef. 5:15, 16) Molende, elimo ya komipimela, mpe kotyela Yehova motema na libondeli, esalisaki basakoli mingi na kobongisa programɛ ya malamu oyo epesaki bango likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela.
4. Makambo nini ekoki kosalisa yo okokisa mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela?
4 Okoki kosala mosala ya mobongisi-nzela? Mpo na nini te kotuna babongisi-nzela oyo bameseni na mosala yango báyebisa yo ndenge nini basalaka? Bimáká na bango na mosala ya kosakola, mpe okoyoka esengo oyo bayokaka. Tángáká masolo oyo elobelaka mosala ya mobongisi-nzela, oyo ebimá na mikanda na biso. Mityelá mikano oyo okoki kokokisa, oyo ekoki kofungolela yo nzela na mosala ya mobongisi-nzela. Soki sikoyo makambo mosusu ezali kopekisa yo okóma mobongisi-nzela, yebisá Yehova makambo yango na libondeli, mpe sɛngá ye asalisa yo osilisa yango.—Mas. 16:3.
5. Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela esalisaka biso tókolisa makoki na biso na mosala ya kosakola?
5 Mapamboli mpe esengo: Mosala ya mobongisi-nzela ekolisaka makoki na biso ya kosalela Liloba ya Nzambe, likambo oyo ebakisaka esengo. Elenge mwasi moko mobongisi-nzela alobaki boye: “Koyeba kosembola Liloba ya solo ya Nzambe malamumalamu ezali mpenza lipamboli. Ntango ozali kosala mosala ya mobongisi-nzela, okosalela Biblia mingi. Sikoyo, ntango nabimaka na mosala ya ndako na ndako, nakoki kosalela mikapo oyo ebongi mpo na moto mokomoko oyo nakosolola na ye.”—2 Tim. 2:15.
6. Formasyo nini mosala ya mobongisi-nzela epesaka?
6 Mosala ya mobongisi-nzela epesaka mpe formasyo na makambo mingi ya bomoi. Ekoki kosalisa bilenge báyeba ndenge ya kokabola malamu ntango na bango, ndenge ya kosalela mbongo malamu, mpe ndenge ya kofanda malamu na bato. Mingi bakómá kotalela bomoi na ndenge ya moto ya Nzambe mpo mosala ya mobongisi-nzela esalisá bango. (Ef. 4:13) Longola yango, babongisi-nzela bazalaka mbala mingi na libaku ya komona ndenge lobɔkɔ ya Yehova ezali kosalisa bango.—Mis. 11:21; Filp. 4:11-13.
7. Ndenge nini mosala ya mobongisi-nzela ekosalisa biso tópusana penepene na Yehova?
7 Ntango mosusu moko ya mapamboli oyo eleki monene na mosala ya mobongisi-nzela ezali ndenge mosala yango esalisaka biso tópusana penepene na Yehova. Yango ekoki kosalisa biso na ntango ya komekama. Ndeko mwasi moko oyo akutanaki na mikakatano makasi alobaki boye: “Boyokani ya malamu oyo nakómaki na yango elongo na Yehova na nzela ya mosala ya mobongisi-nzela, esalisaki ngai nayikela mikakatano wana nyonso mpiko.” Abakisaki boye: “Nasepelaka mingi ndenge nalekisi bambula na ngai ya mokóló na kosalela Yehova mosala ya ntango nyonso. Yango epesaki ngai nzela ya komipesa na kosala makambo oyo nakokaki ata kokanisa yango te.” (Mis. 20:35) Tiká biso mpe tózwa mapamboli ya ndenge yango wana tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso na mosala ya kosakola, mosala oyo eleki ntina.—Mas. 10:22.