Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/04 lok. 5
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Kotosa ntango oyo bapesi mpe kokabola yango malamu
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Esukiseli malamu mpe boumeli ya diskur
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ndenge ya kobongisa Likita ya Mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Malako mpo na bandeko oyo basalaka masolo na Likita ya Mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 1/04 lok. 5

Biyano na mituna na bino

◼ Tokoki kosala nini mpo ete lisolo mokomoko ya makita esalema na miniti oyo epesami?

Ntango ekendaka mbangu soki tozali kobɛtela baninga lisolo moko ya kitoko. Ntango mosusu yango nde esalaka ete bandeko mosusu bakokaka te kosala masolo na bango na miniti oyo epesami na makita. Nini ekoki kosalisa biso?

Tóbanda na ngonga oyo etyami. Ntango lisangá mobimba eyangani, ekozala malamu kosɛnga bayangani bázwa bisika ya kofanda ata miniti moko to miniti mibale liboso makita ebanda; yango ekopesa nzela ete makita ebanda na ngonga oyo etyami mpe na mobulu te. (Mos. 3:⁠1) Makita oyo ezalaka na bato mingi te, lokola makita ya mosala ya kosakola, esengeli te kobandaka nsima ya ngonga oyo etyami mpo na kozela baoyo bakoya nsima.

Omibongisa malamu. Mpo na kotosa ngonga, esɛngaka komibongisa malamu. Yebá malamumalamu mokano ya lisolo na yo. Luká koyeba makanisi ya ntina ya lisolo yango mpe bimisá yango polele. Kolekisa ntango te na kolobela makambo ya mikemike. Salá lisolo ya pɛtɛɛ. Soki lisolo yango ezali na bilakiseli to mituna-lisolo, mekameká yango liboso. Soki ekoki, ntango ozali komekameka lisolo na yo na mongongo makasi, taláká mpe ngonga.

Kabolá lisolo na yo na biteni. Soki lisolo oyo okosala ezali lisukulu to lisolo elongo na bayangani, kokabola yango na biteni mingi ekoki kosalisa yo mpenza. Tyá libela miniti ya eteni mokomoko, mpe komá yango na mopanzi ya papye ya plan na yo. Na nsima, ntango okobanda kosala lisolo yango, taláká soki ozali kotosa miniti yango. Soki ezali lisolo elongo na bayangani, kopesa maloba na bato mingi te na ebandeli noki te bóya kotalela mbangumbangu makanisi ya ntina oyo mingimingi ezalaka na kati mpenza ya lisolo. Batambwisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli basengeli kotika ntango oyo ebongi mpo na kotalela mituna ya bozongeli. Basengeli mpe kokeba ete bázwa te ntango ya loyembo mpe ya libondeli ya nsuka.

Tósilisa na ngonga oyo etyami. Soki likita ezali na masolo mingi, na ndakisa lokola na Likita ya Mosala, molobi mokomoko asengeli koyeba malamumalamu ntango oyo asengeli kobanda mpe kosukisa lisolo na ye. Tokoki kosala nini soki tomoni ete likita ekoki kosila nsima ya ntango mpo masolo mosusu ezwaki ntango mingi? Molobi moko to balobi mibale bakoki koyeisa masolo na bango mikuse, bakolobela kaka makanisi ya ntina mpe bakotika makambo mosusu ya mikemike oyo ezali mpenza na ntina mingi te. Moteyi ya malamu ayebanaka na likoki wana ya koyeisa lisolo na ye mokuse.

Biso bayangani mpe tokoki kosalisa ndeko oyo azali kotambwisa lisolo soki tozali kopesa biyano ya mikuse mpe ya malamu. Na ndenge yango, biso nyonso tokoki kosala ete makita na biso esalemaka “na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”​—⁠1 Kol. 14:40.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto