‘Kobanga te’
1. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango, lokola Yirimia?
1 Ntango Yirimia azwaki mokumba ya kokoma mosakoli, akanisaki ete akokoka te. Kasi Yehova apesaki ye makasi ntango alobaki na ye, ‘kobanga te,’ mpe alendisaki ye na boboto mpo akokisa mokumba na ye. (Yir. 1:6-10) Na mikolo na biso, ezaleli ya nsɔninsɔni to kobanga bato ekoki kopekisa biso tósakola mingi. Kobanga ndenge oyo bato bakoyamba biso to ndenge oyo batalelaka biso ekoki kopekisa biso tópesa litatoli na bantango mosusu. Tokoki kosala nini mpo tótika kobanga ndenge wana, mpe mapamboli nini yango ekomemela biso?
2. Ndenge nini komibongisa esalisaka biso tóbanga mingi te na mosala ya kosakola?
2 Mibongisá liboso: Komibongisa malamu ekoki mpenza kosalisa biso tóbanga mingi te. Na ndakisa, soki totaleli liboso makambo oyo bato balobaka mpo na kokata lisolo, tokoyeba ndenge ya kopesa biyano. (Mas. 15:28) Na ndakisa, na ntango ya Losambo na libota, tokoki komekameka ndenge ya kosala mpo na kolonga mikakatano ndenge na ndenge oyo tokutanaka na yango na kelasi mpe na mosala ya kosakola.—1 Pe. 3:15.
3. Ndenge nini kotyela Yehova motema esalisaka biso tótika kobanga?
3 Tyelá Yehova motema: Kotyela Nzambe motema ekosalisa biso tótika kobanga. Yehova alaki ete akosalisa biso. (Yis. 41:10-13) Elaka yango ekoki kopesa biso makasi koleka eloko mosusu nyonso. Lisusu, Yesu alakaki biso ete ata soki makambo oyo tokanaki te ebimi, elimo santu ya Nzambe ekosalisa biso tópesa litatoli na ndenge ya malamu. (Mrk. 13:11) Yango wana, bondeláká Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga elimo santu na ye.—Luka 11:13.
4. Mapamboli nini tokozwa soki tozali kokoba na mosala ya kosakola atako mikakatano ezali?
4 Mapamboli: Soki tozali kokoba na mosala ya kosakola atako mikakatano ezali, tozwaka makasi ya kolonga mikakatano mosusu oyo tokokutana na yango nsima. Tokómaka na mpiko mpe ezaleli ya kozanga kobanga, bizaleli oyo emonanaka epai ya bato oyo batondi na elimo santu. (Mis. 4:31) Longola yango, ntango tozali komona ndenge oyo Yehova azali kosalisa biso tótika kobanga, kondima mpe elikya na biso na nguya oyo azali na yango ya kobikisa ekómaka lisusu makasi. (Yis. 33:2) Toyokaka mpe esengo mpo toyebi ete tozali kosepelisa Tata na biso ya likoló. (1 Pe. 4:13, 14) Yango wana, tóbanga te kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mpiko, mpo toyebi malamu ete Yehova azali nsima na biso!