Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔtɔbɛ
“Bato mingi bamitunaka soki Nzambe akipaka makambo oyo etungisaka biso mpe epesaka biso mawa. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 34:18.] Lisolo oyo ebandi na lokasa 19 emonisi ndenge oyo Nzambe akoki kosalisa biso tótika kozala mawamawa, tótika komona lokola tomemi ngambo, mpe tótika komimona lokola tozali na ntina te.”
Lamuká! Ɔkɔtɔbɛ
“Bato mosusu bamonaka ete Nzambe azali kaka nguya moko boye. Bamosusu batalelaka ye lokola moto oyo azali na mayoki. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká naino maloba oyo. [Tángá 1 Petro 5:6, 7.] Lisolo oyo ebandi na lokasa 29 epesi eyano oyo euti na Biblia na motuna oyo: Nzambe azali moto ya solo?”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ
“Biso nyonso tolingaka kosepela na oyo tozali na yango. Okanisi ete esengeli tózala na mbongo mpo tósepela na oyo tozali na yango? [Tiká ye apesa eyano.] Mokomi moko ya Biblia ayekolaki kosepela na moke oyo azalaki na yango. [Tángá Bafilipi 4:11, 12.] Zulunalo oyo elobeli sekele mitano oyo Biblia epesi mpo na kosepela na oyo tozali na yango.”
Lamuká! Novɛmbɛ
“Bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azali balobelaka makambo mabe oyo esalemá na nkombo ya Nzambe mpo na komonisa ete mokili elingaki kozala malamu soki mangomba ezalaki te. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Talá moko ya bantina oyo mangomba ya lokuta ememelá bato bampasi. [Tángá 2 Timote 4:3, 4.] Zulunalo oyo emonisi mwa bisika oyo mayele ya bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali esuki.”