Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Febwali
“Mingi kati na biso tozali na mangomba epai tosambelaka. Okanisi ete Nzambe akipaka te lingomba oyo moto aponi kosambelaka? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Matai 15:9.] Lisolo oyo emonisi makambo minei oyo Yesu alobelaki mpo na koyeba lingomba ya solo.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 16.
Lamukà! Febwali
“Bato mosusu bandimaka Mozalisi, nzokande bamosusu bakanisaka ete yango ebongi te mpe eyokani na siansi te. Ezali boni mpo na yo? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete kondima ya solosolo ezali bindimelá te. [Tángá Baebre 11:1.] Lisolo oyo elobeli mwa makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 22.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Marsi
“Otalelaka Biblia lokola Liloba ya Nzambe, to okanisaka ete ezali kaka buku moko ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Biblia yango moko elobi. [Tángá 2 Timote 3:16, 17.] Zulunalo oyo elobeli ndenge oyo okoki kozwa eyano ya malamu na likambo yango mpe mpo na nini ezali na ntina ozwa eyano yango.”
Lamukà! Marsi
“Na ntembe te yo mpe osepelaka na biloko kitoko oyo etondi na mokili. Kasi ondimaka ete moto moko ya mayele nde akelá yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 104:24.] Zulunalo oyo epesi bandakisa ya biloko oyo esalemi na mayele mpe emonisi soki yango ezali koteya biso nini.”