Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ
“Okanisi ete baanzelu batyaka likebi na makambo oyo tosalaka? [Tiká ye apesa eyano.] Talá maloba kitoko oyo ezali na Biblia. [Tángá Luka 15:10.] Lisolo oyo elobeli makambo oyo Yesu ateyaki mpo na ndenge oyo bikelamu ya elimo bakoki kosalisa biso to kosala biso mabe.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 16.
Lamuká! Novɛmbɛ
Tángá 2 Timote 3:16. Na nsima, lobá boye: “Okanisi ete tokoki kondima makambo nyonso oyo Biblia elobi? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo emonisi soki arkeoloji mpe istware eyokani na makambo oyo Biblia elobi mpo na Ezipito ya kala.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 15.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Desɛmbɛ
“Bato mingi bakanisaka ete ezali na bikelamu ya mayele oyo bafandaka na likoló, oyo bakoki kosalisa biso to kosala biso mabe. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Emoniseli 12:7-9.] Zulunalo oyo emonisi makambo oyo Biblia elobi mpo na baoyo bafandaka na likoló, soki basalaka biso nini, mpe soki tokoki kosolola na bango.”
Lamuká! Desɛmbɛ
“Osilá komituna mpo na nini bato basalaka fɛti ya Noele na mokolo ya 25 Desɛmbɛ, nzokande Biblia eyebisi te dati oyo Yesu abotamaki? [Tiká ye apesa eyano.] Na kotalela vɛrsɛ oyo, Yesu abotamaki te na eleko ya malili (hiver). [Tángá Luka 2:8.] Zulunalo oyo eyebisi epai wapi mimeseno ya fɛti ya Noele eutá.”