Bazulunalo na biso ebongisami mpo esepelisa bato ndenge na ndenge
1. Ndenge nini moombo ya sembo mpe ya mayele amekolaka ntoma Paulo?
1 Kaka ndenge ntoma Paulo azalaki kosalela mayele ndenge na ndenge ya kosakola nsango malamu mpo na kozwa “bato ya ndenge nyonso,” moombo ya sembo mpe ya mayele asalelaka bazulunalo mpo na koteya bato ya bisika nyonso mpe ya bindimeli nyonso. (1 Ko. 9:22, 23) Mpo na kosalela malamu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, tosengeli te kobosana mpo na banani bazulunalo yango ekomamaka.
2. Lamuká! ebongisami mpo esepelisa banani?
2 Lamuká!: Ntina ya zulunalo oyo ezali ya koteya lolenge ya bato oyo ntoma Paulo alobelaki ntango azalaki koloba na “mibali ya Atene.” (Mis. 17:22) Ekoki kozala ete mibali yango bayebaki mateya ya bakristo te, mpe bayebaki mpenza Makomami te. Ndenge moko mpe, Lamuká! ebongisami mpo na bato oyo bazali kaka na boyebi moke ya Biblia to bayebi yango te. Ntango mosusu bato yango bayebaka mateya ya bakristo te, balingaka kokɔta ata na lingomba moko te, to bayebaka te ete Biblia ekoki kosalisa bango ata lelo oyo. Ntina ya libosoliboso ya Lamuká! ezali ya kondimisa batángi na yango ete Nzambe ya solo azali. Ntina mosusu ya zulunalo yango ezali ya kolendisa motángi na yango andimela Biblia mpe ya kosalisa ye ayeba ete Batatoli ya Yehova bakeseni na bandimi ya mangomba mosusu.
3. (a) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ekomami mpo na banani? (b) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli ekomami mpo na banani?
3 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ekomami mpo na baoyo bazali na mwa limemya mpo na Nzambe mpe mpo na Makomami. Bazali na mwa boyebi ya Biblia kasi bayebi mateya na yango malamumalamu te. Bazali lokola bato oyo ntoma Paulo alobaki mpo na bango ete ‘babangaka Nzambe.’ (Mis. 13:14-16) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli ekomami libosoliboso mpo na Batatoli ya Yehova. Paulo ayebaki ete baoyo bazalaki kotánga mikanda na ye bayebaki malamu Makomami mpe bazalaki na boyebi ya sikisiki ya solo. (1 Ko. 1:1, 2) Ndenge moko mpe lelo oyo, masolo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli ekomamaka mpo na baoyo bayanganaka na makita na biso mpe bayebi malamu maloba oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mingi.
4. Mpo na nini tosengeli koyeba malamu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokomoko oyo tokabolaka na mosala ya kosakola?
4 Atako topesaka bazulunalo nyonso mibale, tobendaka likebi kaka na zulunalo moko. Yango wana, mityelá mokano ya koyeba malamu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokomoko liboso ya kokabola yango. Soki osali bongo, okoyeba kobenda likebi ya moto na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekosepelisa ye.