‘Tiká nkombo ya Nzambe esantisama’
1. Motó ya likambo ya liyangani ya zongazonga ya mobu ya mosala 2012 ezali nini, mpe euti na vɛrsɛ nini?
1 Tozali mpenza na libaku malamu ya koyebana lokola Batatoli ya Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Nzambe ye moko nde apesá biso nkombo yango. Mpe banda mobu 1931, lokola tokómá kobengama Batatoli ya Yehova, toyebani mpenza lokola bato oyo bamemi nkombo ya Yehova. (Yis. 43:10) Yesu, Mwana ya Nzambe, azalaki kozwa nkombo ya Nzambe na motuya mingi, yango wana atyaki yango na esika ya liboso na libondeli oyo apesaki lokola ndakisa. (Mat. 6:9) Motó ya likambo ya liyangani ya zongazonga mpo na mobu ya mosala 2012 euti na maloba wana ya Yesu. Motó ya likambo yango elobi: “Tiká nkombo ya Nzambe esantisama.”
2. Masolo nini tokoyoka na liyangani ya zongazonga?
2 Makambo oyo tokoyoka: Na mokolo ya pɔsɔ, diskur oyo ekozala na motó ya likambo “Basaleli ya ntango nyonso basalisaka bato báyeba nkombo ya Nzambe” ekomonisa ntina oyo mosala ya ntango nyonso epesaka mapamboli mingi. Tokoyoka mpe diskur ya biteni minei oyo ekozala na motó ya likambo “Kebá ete ofingisa nkombo ya Yehova te,” oyo ekosalisa biso tókwea te na mitambo minei oyo ekoki kosala ete tófingisa nkombo ya Yehova. Diskur oyo ekozala na motó ya likambo “Mpo na nini nkombo ya Nzambe esengeli kosantisama?” ekoyanola na mituna oyo: Nini ekosalisa biso tósakola na molende ntango bato bazali mpenza kosepela te na nsango malamu? Nini ekosalisa biso tóyeba kosakola mpe mpo mosala na biso ebota mbuma? Na mokolo ya lomingo, tokolanda diskur mosusu ya biteni minei, oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kosantisa nkombo ya Nzambe na makanisi na biso, na maloba na biso, na bikateli na biso, mpe na etamboli na biso. Bato ya sika bakosepela mpenza na diskur ya bato nyonso oyo ekozala na motó ya likambo “Yehova akosantisa nkombo na ye monene na Armagedone.”
3. Mokumba nini tozali na yango, mpe ndenge nini liyangani oyo ekosalisa biso?
3 Mosika te, Yehova akosantisa nkombo na ye. (Ezk. 36:23) Liboso tókóma na ntango yango, tozali na mokumba monene ya kokumisa nkombo mosantu ya Yehova na makambo nyonso oyo tosalaka. Tozali na elikya ete liyangani oyo ya zongazonga ekosalisa mokomoko na biso akokisa mokumba monene oyo azali na yango ya komema nkombo ya Nzambe.