Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/14 lok. 3
  • Lolenge malamu ya kosalela bazulunalo ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge malamu ya kosalela bazulunalo ya kala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Kabolaká bazulunalo ntango ozali na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Pesá moto zulunalo ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo ekosepelisa ye”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 3/14 lok. 3

Lolenge malamu ya kosalela bazulunalo ya kala

Lokola bazulunalo ya kala ekoki kosalisa moto te soki tobombi yango na ndako to tobwaki yango, tosengeli koluka ndenge ya kokabola yango. Zulunalo moko mpamba ekoki kopesa moto mposa ya koyeba solo mpe kotinda ye abanda kobelela nkombo ya Yehova. (Rom. 10:13, 14) Mwa makanisi oyo elandi ekosalisa biso tóyeba lolenge malamu ya kosalela bazulunalo ya kala.

  • Ntango bozali kosakola na bateritware oyo bosakolaka mingi te, mbala mosusu bokoki kotya yango na nse ya porte ya bandako oyo bokuti bato te.

  • Ntango ozali kosakola na bisika ya bato nyonso, na ndakisa na balabala, na bisika oyo bato bazelaka bisi to engbunduka, tuná moto soki akosepela kozwa mokanda ya kotánga, lakisá ye bazulunalo ya kala ebele, mpe sɛngá ye apona.

  • Ntango okei na bisika lokola bandako oyo basukolaka bilamba, bandako ya mibange, balopitalo, to bisika mosusu ya ndenge wana oyo ezali na teritware ya lisangá na bino, okoki kotika bazulunalo ya kala na bisika oyo bato bafandaka mpo na kozela. Mbala mingi, liboso ya kosala bongo, ezalaka malamu kozwa ndingisa epai ya mokambi ya esika yango, soki azali wana. Soki okuti bazulunalo mosusu wana, kobakisa mosusu te.

  • Ntango ozali komibongisa mpo na kozongela bato, kanisá makambo nini ekoki kosepelisa moto mokomoko. Azali tata ya libota to mama ya libota? Asepelaka kosala mibembo? Asepelaka na mosala ya kolona mpe kobongisa bafololo? Talá na bazunalo ya kala soki ezali na lisolo oyo akoki kosepela kotánga mpe lakisá ye yango ntango ozongeli ye.

  • Ntango okuti moto oyo asepelaki na nsango malamu, nsima ya koluka ye mbala na mbala na ndako, lakisá ye bazulunalo ya kala oyo azwaki te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto