Kosakola Bokonzi ezali mosala ya ntina mingi
1 Mokolo na mokolo, bamiliare ya bato awa na mabelé bazalaka na bomoi mpo na biloko oyo Yehova akabelaka bango. (Mat. 5:45) Nzokande, kaka bato moke nde bazali mpenza na libaku malamu ya kozongisa matɔndi epai ya Mozalisi na bango na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 24:14) Otalelaka mpenza libaku malamu yango lokola eloko ya motuya mingi?
2 Mosala ya kosakola Bokonzi ekumisaka Nzambe mpe epesaka elikya mpe kimya na bato oyo bazali komitungisa mpo na bantango ya yikiyiki oyo tozali. (Ebe. 13:15) Mosala yango ezali kopesa elikya ya bomoi ya seko epai ya baoyo bazali kondima nsango yango. (Yoa. 17:3) Mosala nini mosusu epesaka bato matomba ya ndenge wana? Ntoma Paulo amonisaki polele ete mosala ya kosakola ezalaki na ntina mingi na miso na ye na lolenge azalaki kokokisa yango. Azalaki kotalela yango lokola eloko ya motuya.—Mis. 20:20, 21, 24; 2 Kol. 4:1, 7.
3 Tómonisa botɔndi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango: Lolenge moko ya komonisa ete libaku malamu oyo tozali na yango ya kosakola ezali na ntina mingi, ezali ya koluka kobongisa mosala na biso ya kosakola. Tozwaka mpenza ntango mpo na kobongisa lisolo oyo ekosimba mitema ya bato oyo bakoyoka biso? Tokoki nde kokolisa makoki na biso ya kosalela Makomami mpe ya kotinda bato bákanisa? Tosakolaka na bandako nyonso ya teritware oyo bapesi biso? Tokoki kobanda mpe kolanda koyekola na moto Biblia? Lokola baklisto ya sembo, ezala ya kala to ya ntango na biso, soki tokangi ntina ya mosala oyo, tokotalela libaku malamu oyo tozali na yango lokola eloko ya motuya.—Mat. 25:14-23.
4 Ntango ozali kobundana na mikakatano ya bobange, ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, to na mikakatano mosusu, okobɔndisama na koyeba ete milende oyo tozali kosala mpo na kosakola ezali mpenza na motuya mingi. Liloba ya Nzambe esalisi biso tóyeba ete Yehova azwaka na motuya mingi milende ya baoyo bazali kosalela ye, ata soki milende yango emonani polele te na miso ya bato mosusu.—Luka 21:1-4.
5 Mosala ya kosakola Bokonzi epesaka esengo mingi. Ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 92, alobaki boye: “Soki nakanisi mbula koleka 80 oyo nalekisi na mosala ya Nzambe, namonaka mpenza ete nazalaki na libaku malamu; nayokaka mawa te! Ya solo, soki nakokaki kobandela bomoi na ngai, nakopona nzela se moko wana, mpamba te ‘boboto ya Nzambe eleki ata bomoi.’ ” (Nz. 63:3) Tiká ete biso mpe tózwa na motuya mingi libaku wana oyo Nzambe apesi biso: mosala ya kosakola Bokonzi.