Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ
“Na mikolo oyo ya mpasi, mabota mingi ezali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Mpo na yo, esika nini tokoki kozwa litambwisi ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tózala na libota ya esengo?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ, mpe bótalela elongo makambo oyo ezali na nse ya moko ya mitó ya makambo mike na nkasa 16 mpe 17, mpe bótánga vɛrsɛ moko kati na oyo batye wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela motuna mosusu.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔtɔbɛ
Lakisá lokasa ya liboso ya zulunalo yango mpe tuná boye: “Okoyoka ndenge nini soki bayebisi yo ete makambo mosusu oyo bateyá yo na ntina na Nzambe ezali lokuta? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Yesu alobaki mpo na likambo etali kokesenisa solo ná lokuta. [Tángá Yoane 17:17.] Yango emonisi ete kaka Biblia nde eyebisaka biso solo na ntina na Nzambe. Zulunalo oyo elobeli makambo mitano oyo eteyamaka mpo na Nzambe, kasi Biblia emonisi ete ezali lokuta.”
Lamuká! Ɔkɔtɔbɛ
“Lelo, toyeli bino lisolo moko oyo ekosalisa mabota. Mpo na yo, mokakatano nini ya monene baboti bakutanaka na yango lelo ntango bazali kobɔkɔla bana? [Tiká ye apesa eyano.] Baboti mingi balandaka toli ya Biblia mpo na kobɔkɔla bana. Na ndakisa, maloba oyo ya bwanya esalisaka mpenza na ntango ya kopesa bana disiplini. [Tángá Baefese 4:31.] Zulunalo oyo emonisi ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa baboti na ntango oyo bana na bango bazali kokola, kobanda ntango bazali naino babebe tii na bolenge.”