Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/13 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 9/13 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya zomi

“Lelo, tozali kotala bato ya kartye na biso mpo na mwa miniti moke. Bato mingi oyo tosololi na bango bamonisi ete moko ya mikakatano ya minene oyo bakutanaka na yango ezali liwa ya moto moko oyo balingaki mingi. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Makanisi oyo elendisaki ngai.” Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2013, mpe bótalela elongo makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko. Tikelá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/10/2013

“Toyei kotala bino mwa miniti moke mpo na kolendisa bino na likambo etali kotánga Biblia. Toyebi ete bato mosusu basepelaka na Biblia mpe bamosusu basepelaka na yango te. Bongo yo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia emonisi mpenza polele. [Tángá 1 Batesaloniki 2:13.] Na ntembe te, soki ezali solo mpenza ete Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe, boye ebongi tótángaka yango. Zulunalo oyo emonisi makambo oyo ezali na Biblia mpe ntina oyo yango esengeli kosepelisa biso.”

Lamuká! 10/2013

“Nalingi koyoka likanisi na yo na motuna oyo: Tokoki mpenza kosepela na biloko oyo tozali na yango ata soki ezali mingi te? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi. [Tángá 1 Timote 6:8.] Zulunalo oyo epesi likanisi ya bokatikati na oyo etali biloko ya mokili mpe elobeli biloko misato ya motuya oyo mbongo ekoki kosomba te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto