Ndenge ya kobanda lisolo
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya zomi
“Tozali kotala bato mpo na kosolola na bango na mwa miniti moke likambo etali guvɛrnema ya malamu. Okanisi ete ezali na guvɛrnema moko oyo ekoki kosilisa mikakatano nyonso, na ndakisa mobulu mpe kozanga bosembo?” Tiká ye apesa eyano. Yebisá moto oyo ozali kosolola na ye ete na libondeli ya Nkolo to Tata wa biso, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete guvɛrnema ya ndenge wana, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, eya. Lakisá ye ezipeli ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2014, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/10/2014
“Tozali kotala bato ya kartye na biso mpo na kosolola na bango na mwa miniti moke na oyo etali maloba ya libondeli oyo tomeseni kosala, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye. [Tángá Matai 6:9, 10.] Osilá koyoka ndimbola ya malamu na oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe mpo na nini Yesu alobelaki yango mingi na mateya na ye? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi na ntina etali Bokonzi ya Nzambe, ezala mpe mapamboli mosusu oyo Bokonzi yango ekomema awa na mabele.”
Lamuká! 10/2014
“Tozali kotala bato na mwa miniti moke mpo na kosalisa bango bázwa eyano na motuna oyo. [Lakisá ezipeli ya liboso ya zulunalo yango.] Okanisi ete moto asengeli kozala mozwi mpo azala na bomoi ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elobeli bozwi na bokatikati. [Tángá Luka 12:15.] Na kolanda Biblia, kozala na bomoi ya malamu mpenza ezali likambo ya moto nyonso. Zulunalo oyo elimboli yango.”