Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/11 lok. 2
  • Kobanga te kopesa litatoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobanga te kopesa litatoli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Bana na yo basili komibongisa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Tósangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 10/11 lok. 2

Kobanga te kopesa litatoli

1. Nini esɛngaka kozala na mpiko, mpe mpo na nini?

1 Esilá kokómela yo oyoka nsɔni mpo na kopesa litatoli na kelasi mpo ozalaki kobanga básɛka yo? Na ntembe te, esɛngaka kozala na mpiko mpo na koyebisa basusu bindimeli na yo, mingimingi soki ozalaka nsɔninsɔni. Nini ekosalisa yo opesa litatoli?

2. Mpo na nini ezali na ntina mingi osalela bososoli ntango ozali kopesa litatoli na kelasi?

2 Salelá bososoli: Atako na eteyelo ozali na mabaku mingi ya kopesa litatoli, kobosana te ete osɛngisami te kopesa litatoli na moto nyonso oyo okutani na ye, ndenge tosalaka ntango tosakolaka ndako na ndako. Salelá bososoli mpo na koyeba ntango oyo ebongi mpo na kopesa litatoli. (Mos. 3:1, 7) Mbala mosusu soki bapesi yo devuare to basɛngi yo osala lisolo moko liboso ya bana-kelasi, talelá yango lokola libaku ya koyebisa basusu bindimeli na yo. To okoki kopesa litatoli soki mwana-kelasi moko atuni yo mpo na nini osanganaka te na misala to bafɛti mosusu oyo esalemaka na eteyelo. Bilenge bakristo mosusu bayebisaka balakisi na bango na ebandeli ya mobu ya kelasi ete bazali Batatoli ya Yehova mpe bapesaka bango mikanda oyo elimbolaka bindimeli na biso. Basusu batikaka mikanda likoló ya mesa na bango mpo na kobenda likebi ya bana-kelasi mosusu, mpe mpo yango etinda bango bátuna mituna mpo na mikanda yango.

3. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kopesa litatoli na kelasi?

3 Mibongisá: Soki omibongisi, okomona ete okobanga lisusu te. (1 Pe. 3:15) Na yango, kanisá liboso mituna nini bakoki kotuna yo, mpe bongisá biyano oyo okoki kopesa na mituna yango. (Mas. 15:28) Soki likoki ezali, memáká na kelasi Biblia na yo mpe mikanda mosusu lokola buku Comment raisonner, buku Mituna oyo bilenge batunaka, mpe mikanda mosusu oyo elobelaka bozalisi, mpo okoka kosalela yango soki esengeli. Sɛngá baboti na yo bákɔtisa na losambo na bino na kati ya libota bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kopesa litatoli na kelasi.

4. Mpo na nini osengeli kokoba kopesa litatoli na kelasi?

4 Longola kobanga: Kokanisa te ete bana-kelasi na bino bakobanda kosɛka yo mbala nyonso oyo okopesa bango litatoli. Na ntembe te, bana-kelasi mosusu bakosepela na mpiko oyo omonisi mpe bakoki ata koyoka yo. Kasi kolɛmba nzoto te soki moto moko te ayoki yo. Yehova akosepela mpo opesaki litatoli. (Ebr. 13:15, 16) Ntango nyonso, sɛngá Yehova asalisa yo ‘okoba koloba na mpiko mpenza.’ (Mis. 4:29; 2 Tim. 1:7, 8) Kanisá esengo oyo okozala na yango soki moto moko ayoki yo. Mbala mosusu, moto yango akoki ata kokóma mosaleli ya Yehova!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto