Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/98 nk. 1-2
  • Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Omibongisi mpo na kozonga na kelasi?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Bótánga kelasi malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Kobanga te kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 9/98 nk. 1-2

Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino

1 Ozali na mayoki ya ndenge nini lokola okozonga na eteyelo nsima ya kolekisa konze? Ozali kozela na motema likoló kozwa matomba na mobu mosusu ya sika na kelasi? Okosimba mabaku oyo mapesameli yo na eteyelo mpo na kosakola solo epai na baninga na yo ya kelasi mpe epai na balakisi na yo? Tozali kolikya ete okosala oyo ekoki na yo kosala na eteyelo.

2 Zalá mwanakelasi malamu: Soki ozali komibongisa malamu liboso ya kokenda na kelasi mpe ozali kotya likebi malamu wana mateya ezali kopesama, okozwa mpenza matomba mingi. Zalá na molende ya kosala badevuare na yo, kasi kopesa nzela te ete misala na yo ya kelasi epekisa yo kosala misala ya Teokrasi.​—Filp. 1:10.

3 Na ebandeli ya mobu ya kelasi, tángá mwa buku Les Témoins de Jéhovah et l’instruction. Nsima, yo to baboti na yo, bokoki kopesa molakisi na yo mokomoko mwa buku yango. Monisá bango ete motuna nyonso oyo bakotuna ekoki kozwa eyano. Yango ekosalisa bango ete básosola mitinda mpe bindimeli na yo malamu mpe básalana elongo na yo wana ozali kosalela makambo oyo oyekolaki. Ekondimisa mpe balakisi na yo ete yo na baboti na yo bolingi kosalana elongo na bango wana bazali kosalisa yo ete otánga kelasi malamu.

4 Zalá Motatoli malamu: Mpo na nini te kotalela eteyelo lokola teritware na yo mpo na kopesa litatoli? Na boumeli ya mobu oyo ya kelasi, okozwa mabaku malamu ya kopesa litatoli. Ozali na boyebi mingi ya elimo na boye ete ntango olakisi yango na basusu, okoki ‘komibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.’ (1 Tim. 4:16) Na kobateláká etamboli ya boklisto malamu mpe na kopesáká litatoli ntango nyonso soki likoki ezali, matomba ekozwama mpo na yo mpe mpo na basusu.

5 Elenge mobali moko oyo azali moklisto apesaki litatoli epai na baninga na ye ya eteyelo. Kati na baoyo bandimaki nsango yango, ezalaki na moninga moko ya Lingomba ya Katolike, na moninga moko oyo andimaka Nzambe te, oyo azalaki kotyola baoyo bazalaki kondima Nzambe, na elenge moko oyo azalaki momeli monene ya makaya mpe molangwi masanga. Elenge moklisto yango asalisaki baninga na ye 15, bango nyonso bamipesaki epai na Nzambe mpe bazwaki batisimo.

6 Na bongo, bilenge, bómipesa na kotánga kelasi malamu mpe bópesa litatoli na teritware na bino oyo ekeseni mpenza na bateritware mosusu nyonso. Boye, bokosepela na matomba ya kokenda na eteyelo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto