Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/11 lok. 8
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 10/11 lok. 8

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Novɛmbɛ

“Okanisi ete bato oyo balingaka kotosa Nzambe bazalaka na esengo mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli mwa makambo ya ntina.” Pesá moto yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ, na nsima bótánga mpe bótalela elongo makanisi oyo ezali na nse ya moko ya mitó ya makambo mike na lokasa 16 mpe 17. Tángá ata vɛrsɛ moko na bavɛrsɛ oyo batye wana. Pesá moto yango bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na kotalela eyano na motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ

“Bato mosusu bakanisaka ete oyo Biblia elobi na likambo etali basi ná mibali ezali makambo ya kala mpe eleki makasi mpamba. Basusu bandimaka oyo Biblia elobi. Okanisi nini mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo eyebisi biso nani apesá mibeko oyo ezali na Biblia. [Tángá 2 Timote 3:16.] Zulunalo oyo epesi biyano na mituna zomi oyo bato bamitunaka mingi mpo na makambo ya basi ná mibali. Elimboli mpe ndenge nini mibeko oyo ezali na Biblia esalisaka biso.”

Lamuká! Novɛmbɛ

“Soki totali malamu biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na nse, tokoloba nini? Makambo nyonso ebimá kaka yango moko to ezali na Mozalisi oyo akelaki biloko nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Tótala oyo mokomi moko ya Biblia alobaki ntango amonaki biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na nse. [Tángá Baroma 1:20.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo bato ya mayele bayekoli mpo na selile ya nzoto ya moto, oyo emonisi ete ezali na Mozalisi moko oyo akelá biloko nyonso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto