Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Novɛmbɛ
“Mingi na biso tozalaka na mposa ya guvɛrnema moko ya malamu. Mpo na yo, guvɛrnema nini ekozala na likoki ya kosilisa mikakatano ya bato? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge elobami awa.” Lakisá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16 mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ
“Tolingi koyeba likanisi na yo. Soki basɛngi yo otuna Nzambe motuna, okotuna ye motuna nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu amonisaki ete ezali malamu tólukaka biyano na mituna oyo etungisaka biso. [Tángá Matai 7:7.] Zulunalo oyo epesi biyano ya Biblia na mituna misato oyo ya ntina.” Lakisá ye mituna oyo ezali na nse na lokasa 3.
Lamuká! Novɛmbɛ
“Lelo tozali kotala bato mpo na kosolola makambo etali mabota. Na mabota mingi, okokuta kaka moboti moko oyo azali kobɔkɔla bana ye moko. Okanisi ete bazali na mikakatano mingi koleka mabota oyo baboti mibale bazali? [Tiká ye apesa eyano.] Baboti mingi bazwaki toli ya malamu na Biblia. [Tángá 2 Timote 3:16.] Zulunalo oyo epesi makanisi oyo ekoki kosalisa baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko mpo bálonga mokumba yango ya monene.”