Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yuli
“Na bambula oyo euti koleka, bato mingi bazalaki mpenza kosepela na baanzelu. Okanisi ete baanzelu bazali solo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge zulunalo oyo elobi.” Pesá moto yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16, mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
Tángá Nzembo 65:2. Na nsima lobá boye: “Bato mingi bandimaka ete Nzambe azali ‘Moyoki ya libondeli,’ mpe babondelaka mikolo nyonso. Kasi basusu bamitunaka: ‘Soki Nzambe azali mpenza, mpo na nini mokili etondi na mikakatano boye?’ Okanisi boni, ezali na Nzambe moko oyo ayokaka mabondeli na biso? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi eyano ya Biblia na motuna oyo: ‘Mpo na nini Moyoki ya libondeli atiki bampasi ezala?’”
Lamuká! Yuli
“Soki ozalaki na likoki ya kobongola makambo na mokili, olingaki kobongola likambo nini? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ntina oyo bato bazali na makoki ya kosala makambo nyonso te. [Tángá Yirimia 10:23.] Zulunalo oyo elobeli mikakatano oyo Nzambe akani kosilisa.”