Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/12 lok. 1
  • Osalelaka mwa babuku oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osalelaka mwa babuku oyo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • La Bible​—Quel est son message ?
  • Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Mwa buku ya sika oyo tokokabola!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 1/12 lok. 1

Batelá yango

Osalelaka mwa babuku oyo?

La Bible​—Quel est son message ?

Ebongisami mpo na bato oyo bayebi mpenza te makambo oyo ezali na Biblia, mingi mpenza baoyo bazali na mangomba ya Bokristo te

Ndenge ya kokabola yango: “Tolingi koyeba likanisi na yo na likambo oyo Makomami (to buku mosantu) elobi awa. [Tángá Nzembo 37:11, oyo elobelami na Eteni 11.] Okanisi ete mabele ekokóma ndenge nini ntango esakweli oyo ekokokisama? [Tiká ye apesa eyano.] Wana ezali kaka ndakisa moko ya elikya mpe libɔndisi oyo Biblia ezali kopesa bato ya bikólo nyonso mpe mangomba nyonso.” Tángá paragrafe oyo ezali na likoló, na lokasa 3, na nse ya motó ya likambo mpe pesá ye mwa buku yango.

Ndenge mosusu ya kosalela yango: Soki ozali koyekola na moto Biblia na buku Biblia eteyaka mpe moto yango azali na lingomba ya bokristo te, okoki kozwa mwa miniti na ebandeli to na nsuka ya boyekoli mpo na kotalela eteni moko ya mwa buku oyo. Yango ekosalisa ye ayeba makambo oyo ezali na Biblia.

Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie

Ebongisami mpo na kosalisa bilenge Batatoli oyo bazwaka mateya ya evolisyo na kelasi, mpe ekosalisa biso ntango tozali kosolola na bato oyo bandimaka liteya ya evolisyo, baoyo balobaka ete tokoki te koyeba soki Nzambe azali to te, mpe baoyo bandimaka te ete Nzambe azali (Tokokabola mwa buku oyo na mosala ya ndako na ndako te.)

Ndenge ya kosalela yango ntango ozali kosolola na moto oyo andimaka liteya ya evolisyo to na moto oyo andimaka te ete Nzambe azali: “Lelo oyo, pene na babuku nyonso ya siansi elobelaka liteya ya evolisyo. Ondimaka ete liteya ya evolisyo ezali kaka likanisi pamba to okanisaka ete ezali nde na bilembeteli oyo emonisi sikoyo ete liteya yango ezali mpenza solo? [Tiká ye apesa eyano.] Mpo na kozwa eyano ya malamu, tosengeli kotalela soki evolisyo ezali likanisi pamba to ezali na bilembeteli, boye te? Mwa buku oyo elobeli bilembeteli oyo etindi bato mingi bándima ete bikelamu ya bomoi ezalisamaki.”

Ndenge mosusu ya kosalela yango: Soki ozali mwana-kelasi, tyá mwa buku yango likoló ya banc na yo mpe otala soki ekobenda likebi ya moninga moko ya kelasi.

Okoki kozala moninga ya Nzambe!

Ebongisami mpo na bato oyo batánga mingi te to oyo bayebi kotánga malamu te

Ndenge ya kokabola yango: “Okanisi ete biso bato tokoki kokóma baninga ya Nzambe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yakobo 2:23.] Mwa buku oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tókóma baninga ya Nzambe, ndenge Abrahama azalaki.”

Ndenge mosusu ya kosalela yango: Ntango okutani na moto mpo na mbala ya liboso to ntango ozongeli ye, salelá liteya 1 ndambo to mobimba, mpo na kolakisa ye ndenge toyekolaka na bato Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto