Moná bolamu mpo na mosala na yo ya makasi
1. Nini ekoki kosala ete molende na biso na mosala ya kosakola ekita?
1 Moto akelamá mpo ‘amonaka bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.’ (Mos. 2:24) Nzokande, soki tozali komona te makambo kitoko oyo mosala na biso ya kosakola ebimisaka, tokoki kolɛmba nzoto, kobungisa esengo mpe molende na biso ekoki kokita. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu?
2. Mpo na nini tosengeli komizela na nyonso na oyo etali ndenge bato bakoyamba nsango ya Bokonzi?
2 Tómizelaka na nyonso: Kobosana te ete bato oyo basepelaki na nsango ya Bokonzi oyo Yesu asakolaki bazalaki moke, atako bongo Yesu alongaki mpenza na mosala na ye. (Yoa. 17:4) Na lisese na ye ya moloni, Yesu asakolaki ete mitema nyonso te nde ekoyamba nsango ya Bokonzi oyo ekokani na milona. (Mat. 13:3-8, 18-22) Atako bongo, milende na biso ekokisaka makambo mingi.
3. Ndenge nini tokoki “kobota mbuma” ata soki kaka bato moke nde basepelaka na nsango oyo tomemelaka bango?
3 Oyo tosengeli kosala mpo tóbota mbuma mingi: Na kolanda lisese oyo Yesu apesaki, baoyo bandimaka nsango ya Bokonzi basengeli ‘kobota mbuma’. (Mat. 13:23) Soki milona ya blé ebimi, ekolaka, ebotaka mbuma; kasi mbuma yango ezalaka mwa milona ya blé te, ezalaka nde mbuma ya sika. Na yango, mbuma oyo bakristo oyo balongi na mosala ya kosakola babotaka ezali kaka te bayekoli ya sika, kasi ebele ya milona ya sika oyo tolonaka na nzela ya mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. Kosala bongo ebimisaka mbuma ebele ya “malamu” oyo ekoki kopesa biso esengo, ezala bato bandimi to te nsango oyo tomemeli bango. Tosalaka ete nkombo ya Yehova esantisama. (Yis. 43:10-12; Mat. 6:9) Tozali na libaku malamu ya kosala elongo na Yehova. (1 Ko. 3:9) Mpe “mbuma ya mbɛbu” na biso esepelisaka Yehova.—Ebr. 13:15, 16.
4. Mbuma nini oyo toyebi te mosala na biso ya kosakola ekoki kobota?
4 Lisusu, tokoki komona te mbuma nyonso oyo mosala na biso ya makasi eboti. Ekoki kozala ete bato mosusu oyo bayokaki mateya ya Yesu bakómaki bayekoli na ye nsima ya kosilisa mosala na ye awa na mabele. Ndenge moko mpe lelo, milona ya Bokonzi oyo tolonaka ekoki te kobimisa misisa mpe kokola na motema ya moto mbala moko, kasi nsima ya mikolo moto yango akoki koyamba solo kozanga kutu tóyeba. Ya solo, na nzela ya mosala na biso ya kosakola makambo mingi ya malamu esalemaka. Na yango, tiká ‘tókoba kobota mbuma mingi’ mpe tólakisa mpenza ete tozali bayekoli ya Yesu.—Yoa. 15:8.